LOYEMBO 59
Sanzolá Yah elongo na ngai
Ya Papye
1. Sanzolá Yah;
Yembelá ye!
Mpo apesi mpema, bomoi, bilei.
Butu moi,
Pambolá ye,
Kumisá nguya mpe bolingo n’e.
Yebisá basusu nkombo na ye.
2. Sanzolá Yah;
Ye Mosungi.
Bondelá ye, sɛngá ye, okozwa.
Nguya na ye,
Lobɔkɔ n’e
Esalisaka oyo alɛmbi.
Sanzolá nkombo mpe nguya na ye.
3. Sanzolá Yah;
Aza’ sembo.
Asungaka na ntango ya mpasi.
Ntang’ozoki,
Asalisi.
Tokopambwama na Bokonzi n’e.
N’esengo, yaká tósanzola Yah!
(Talá mpe Nz. 94:18, 19; 145:21; 147:1; 150:2; Mis. 17:25.)