LOYEMBO 64
Tósala na esengo mosala ya kobuka mbuma
Ya Papye
1. Toza’ na eleko malamu,
Ya kobuka mbuma mingi.
Bambuma n’elanga eteli,
Tókoba kotya molende.
Tozali kosala ná Kristo,
Ye nde ndakisa na biso.
Eza’ lokumu mpe tosepeli.
Tóbuka n’esengo mingi.
2. Mpo tolingi Nzambe mpe bato,
Toza’ komipesa mpenza.
Mosala ekómi ya mbangu,
Nsuka eza’ mosika te.
Mosala yango mpe esengo,
Nzambe apamboli mpenza.
Tókoba kosala ná Yehova,
Tii akoloba: “Esili.”
(Talá mpe Mat. 24:13; 1 Ko. 3:9; 2 Tim. 4:2.)