LOYEMBO 88
Teyá ngai banzela na yo
Ya Papye
1. Yehova Nzambe, tosangani lelo,
Mpo obengisi biso awa.
Mp’oteya biso na Liloba na yo,
Mwinda na makolo na biso.
(MONDIMO)
Lakisá nga’ nzela ya kolanda;
Yehova Nzambe, nabondeli yo.
Tambwisá nga’ na nzela ya sembo,
Nalinga mpenza mibeko na yo.
2. Nani aza’ na bwanya lokola yo?
Moto moko te, Ee Yehova!
Liloba na yo ekamwisi biso;
Ezali solo, eza’ seko.
(MONDIMO)
Lakisá nga’ nzela ya kolanda;
Yehova Nzambe, nabondeli yo.
Tambwisá nga’ na nzela ya sembo,
Nalinga mpenza mibeko na yo.