LOYEMBO 68
Tólona mboto ya Bokonzi
Ya Papye
1. Yaká na elanga ya Nkolo,
Koboya te, abengi yo.
Alobi akosalisa yo,
Mateya n’ekokamba yo.
Mboto ya solo ekolaka se
Na mitema oy’a sembo.
Yo, bomá nzoto na mosala na yo
Oyo Nkolo apesi na yo.
2. Mpo mosala na yo ebota,
Esɛngi milende mpenza.
Esengeli olandelaka
Bayekoli mpo bákola.
Sungá mpo bálonga mitungisi
Mpe kobanga baza’ n’ango.
Okosepela ntango okomona
Bazali kokende liboso.
(Talá mpe Mat. 13:19-23; 22:37.)