LOYEMBO 142
Tósimba makasi elikya na biso
Ya Papye
1. Banda kala bato baza’ na molili.
Basali nyonso eza’ kosimba te.
Mawa mpenza mpo na bato’a masumu;
Nani akobikisa bango?
(MONDIMO)
Yembá, sepelá, Bokonzi eyei!
Boyangeli’a Yesu ezali koya.
Kobanga mpe mpasi ekosila;
Elikya oyo, makasi na biso.
2. Mokolo ya Nzambe ekómi pembeni!
Eza’ koya mpo kolela esila.
Mpe biso nyonso tokozwa esengo.
Yaká tóyembela Yehova.
(MONDIMO)
Yembá, sepelá, Bokonzi eyei!
Boyangeli’a Yesu ezali koya.
Kobanga mpe mpasi ekosila;
Elikya oyo, makasi na biso.
(Talá mpe Nz. 27:14; Mos. 1:14; Yoe. 2:1; Hab. 1:2, 3; Rom. 8:22.)