Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 1/9 nk. 4-7
  • Matomba ya kokumisa baboti oyo bakómi mibangé

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Matomba ya kokumisa baboti oyo bakómi mibangé
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Lisungi na mosuni
  • Lisungi na mayoki
  • Lisungi na elimo
  • Etamboli malamu ebendaka bato epai ya Nzambe
  • Tókumisa baboti na biso atako bakómi mibangé
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Baklisto bazali na mokumba ya kosalisa mibange
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Libota ya boklisto esalisaka mibange
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 1/9 nk. 4-7

Matomba ya kokumisa baboti oyo bakómi mibangé

BASAMBELI ya solo ya Nzambe bamemyaka, bakumisaka, mpe babatelaka baboti na bango oyo bakómi mibangé mpo ete balingaka bango. Yango ezali eteni ya losambo na bango. Biblia elobi: “Bango [bana mpe bana na bana] báyekola kosalela Nzambe kati na ndako na bango mpenza liboso mpe bázongisa mwa makabo epai na baboti [mpe bankɔkɔ na bango, NW]. Zambi oyo ekosepelisa Nzambe.” (1 Timoté 5:4) Tózala bilenge to mikóló, ekoki mpenza ete tópesa “mwa makabo” epai ya baboti mpe epai ya bankɔkɔ na biso. Na kosaláká boye, tokomonisa botɔ́ndi na biso mpo na bolingo na bango, misala na bango ya makasi, mpe mpo na lolenge babatelaki biso na boumeli ya bambula mingi. Mpamba te, tozwi bomoi epai na bango!

Yebá ete kopesa makabo epai ya baboti mpe epai ya bankɔkɔ “ekosepelisa Nzambe.” Yango ekangani na “losambo na biso epai ya Nzambe.” Na kosaleláká toli oyo, tokozwa matomba, koyebáká ete tozali kosala maye mazali kosepelisa Nzambe. Yango ekomemela biso esengo.

Kokabela bato mosusu epesaka esengo, mingimingi soki tokopesa bato oyo, na boboto nyonso, bapesaki biso. (Misala 20:35) Oyo nde likabo soki tozali kosala na boyokani na etindá ya Biblia ete: “Kopesa tata mpe mama na yo ekomema esengo, tiká ete ye oyo abotaki yo asepela”!​—Masese 23:25, The New English Bible.

Ndenge nini tokoki kopesa mwa makabo epai ya baboti mpe bankɔkɔ na biso? Na lolenge misato: na mosuni, na mayoki, mpe na elimo. Motindo mokomoko ezali na matomba na yango.

Lisungi na mosuni

Baoyo basalelaka Nzambe bayebi ete kopesa basangani ya libota na bango biloko ya mosuni ezali likambo ya ntina. Ntoma Paulo apesaki likebisi oyo: “Soko moto nani akoleisa bato na ye te mpe na koleka bato kati na ndako na ye moko te, asili koboya bindimeli mpe aleki mabe moto oyo azangi kondima.”​—1 Timoté 5:8.

Tunji na mwasi na ye Joy bafandi na Afrika ya Wɛ́sti. Atako bazali mpenza na mikakatano ya mosolo, babengisaki baboti ya Joy oyo bakómi mibangé ete báya kofanda na bango. Tata ya Joy azalaki na maladi mpe na nsima akufaki. Tunji azali komikundola: “Ntango bokilo na ngai ya mobali akufaki, bokilo na ngai ya mwasi ayambaki mwasi na ngai mpe alobaki ete: ‘Osalaki nyonso oyo moto akokaki kosala. Osengeli te komiyoka ete ozali na ngambo na liwa ya tata na yo.’ Atako tozangi ye, tosombaki bankisi ya malamu mpo na ye mpe ntango nyonso tomekaki kosalisa ye mpo amiyoka ete tolingi ye mpe azali na ntina; tosalaki nyonso ekokaki na biso kosala mpo na kokokisa mokumba Nzambe apesaki biso. Tozali mpenza kosepela na likambo oyo.”

Ya solo, moto nyonso te azali na likoki ya kosunga bamosusu na mosuni. Mobali moko na ekólo Nigeria alobaki ete: “Soki moto azali kokoka te komibikisa ye moko ndenge nini akoki kobikisa moto mosusu?” Na mikili mingi makambo ya bato makokóma mpasi mingi na bambula ekoya. Engebene Mabota Masangani (O.N.U.), nsima ya ntango moke katikati ya bafandi na Afrika na nsé ya Sahara bakokóma na bobóla makasi.

Soki ozali na mikakatano ya kozanga mosolo, okoki kobɔndisama na lisoló ya solo ya mwasi-mokufeli-mobali oyo azalaki na bosenga. Na eleko azalaki na mabelé, Yesu amonaki mwasi-mokufeli-mobali kotya mwa likabo moke na ebombelo ya mosolo ya tempelo. Apesaki bobele “mea mibale.” Lokola ayebaki ezalela na ye, Yesu alobaki: “Na solo nalobi na bino ete mwasi oyo mobóla aleki bango nyonso na kopesa makabo, mpo ete baoyo nyonso batii mosolo molekaki na bango kati na makabo, nde mwasi oyo na kozanga na ye, atii nyonso ezalaki na ye mpo na kolya.”​—Luka 21:1-4.

Bobele bongo, soki tokosala manso makoki na biso mpo na kosunga baboti to bankɔkɔ na biso na mosuni, ata soki likabo yango ezali moke, Yehova akomona mpe akosepela na yango. Ye azali kozela te ete tósala oyo eleki makoki na biso. Tondimisami ete baboti mpe bankɔkɔ na biso bakozala na mayoki motindo oyo.

Lisungi na mayoki

Tokosunga baboti mpe bankɔkɔ na biso bobele na mosuni te. Biso nyonso tozali na bamposa na mayoki. Moto nyonso, na mobangé lokola, azalaka na mposa ete bálinga ye, amiyoka ete azali na ntina mpe básepela na ye, mpe azala na motuya kati na libota.

Mari, afandi na ekólo Kenya, abatelaki bokilo na ye ya mwasi oyo azalaki mobangé na boumeli ya mbula misato. Mari alobi ete: “Longolá kokokisa bamposa na ye ya mosuni, tosololaki na ye ntango nyonso. Mama azali na makasi te ya kosala misala na ndako, kasi tozalaki kosolola mpe tokómaki mpenza baninga ya motema. Mbala mosusu tozalaki kosolola na ntina na Nzambe, mbala mosusu mpo na bato ya mboka epai tokólaki. Sikawa azali na mbula koleka 90, kasi bɔɔngɔ́ na ye ezali naino malamu. Amikundolaka mpe alobelaka lolenge bomoi ezalaki ntango azalaki naino elenge, na bambula liboso ya 1914.”

Mari abakisi ete: “Kobatela mobangé ezali likambo ya pɛtɛɛ te, kasi kozala na ye elongo na biso ememeli biso matomba ya motuya. Tozali na kimya mpe na boyokani kati na libota. Komipesa na ngai epai na ye elamwisi elimo na ngai ya komipesa epai na basangani mosusu ya libota. Mobali na ngai amoniselaka ngai bonkónde mingi. Soki moto alobi mabe na ntina na ngai, nokinoki mama akoloba sembo mpo na kokɔtela ngai. Moto akoki koloba na ngai mabe te na miso ya mama!”

Lisungi na elimo

Lokola lisungi na mosuni mpe na mayoki ekomemaka matomba epai na ye oyo azali kopesa, ezali bobele bongo mpo na lisungi na elimo. Ntoma Paulo akomelaki baklisto na lisangá ya Loma ete: “Zambi nayoki mposa monene mpo na komona bino, ete nakabela bino likabo na [elimo, NW] mpo na kolendisa bino. Bongo, ekozala ngai kati na bino toyikisana mpiko mpo na kondima na biso na bino mpenza, oyo ezali bobele kondima moko.”​—Baloma 1:11, 12.

Lolenge moko, na oyo etali kopesa lisungi na elimo epai na mibangé oyo basambelaka Nzambe, kolendisana ezalaka na ngámbo mibale. Osondu, ye moto ya ekólo Nigeria, alobi boye: “Eloko esepelisaki ngai mingi epai ya bankɔkɔ na ngai ezali libaku bapesaki ngai ya koyeba makambo ya kala. Nkɔkɔ na ngai ya mobali, na elongi etondi na esengo, asololaki na ngai na ntina na bateritware epai asalaki lokola mosakoli ya ntango nyonso na bambula ya 1950 mpe 1960. Asalaka bokokanisi kati na ebongiseli ya lisangá ya lelo na oyo ezalaki ntango akómaki Motatoli. Baeksperiansi yango esalisaki ngai kati na mosala na ngai ya mobongisi-nzela.”

Basusu kati na lisangá bakoki mpe kopesa mabɔkɔ mpo na kosunga mibangé. Tunji, oyo tolobelaki, alimbolaki makambo malekaki na lisangá na bango: “Elenge mobali moko mobongisi-nzela oyo asengelaki kosala lisukúlu ya bato nyonso, amemaki plan epai ya bokilo na ngai ya mobali mpo ete bábongisa yango bango mibale. Motambwisi ya Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ayaki mpe alobaki na ye ete: ‘Yo oyebi makambo mingi. Toli nini okoki kopesa ngai mpo nakólisa makoki na ngai.’ bokilo na ngai apesaki nkulutu wana batoli ya malamu. Bandeko batángaka nkombo ya bokilo na ngai mbala mingi kati na mabondeli na lisangá. Makambo oyo nyonso masalisaka ye na komiyoka ete bato bazali na mposa na ye.”

Etamboli malamu ebendaka bato epai ya Nzambe

Bantango mosusu, wana tozali kokumisa mpe kolinga baboti mpe bankɔkɔ na biso, tobendaka bato epai ya Nzambe. Ntoma Petelo akomaki: “Bózala na bizaleli na bino malamu kati na bapakano ete na likambo likotukaka bango bino lokola ete bozali bato mabe, awa ekomona bango misala na bino malamu, bákumisa Nzambe.”​—1 Petelo 2:12.

André, nkulutu moklisto na Afrika ya Wɛ́sti, azalaki kotambola kilomɛtɛlɛ 95 mbala mibale na pɔ́sɔ kosalisa tata na ye oyo azalaki na maladi, tata yango azalaki mondimi te. Alobi boye: “Ntango nakómaki Motatoli ya Yehova, tata atɛmɛlaki ngai makasi. Kasi ntango amonaki lolenge nazalaki kosalisa ye na bokɔnɔ na ye akóbaki koloba na bandeko na ngai mibali mpe ya basi ete, ‘Bino bosengeli kokóta na lingomba ya nkulutu na bino!’ Yango epusaki bango, mpe sikawa bandeko na ngai libwa bakóma Batatoli ya Yehova.”

Kokumisa mpe kobatela baboti oyo bakómi mibangé ekoki kozala etumba monene, mingi mpenza na ntango ya mikakatano ya nkita. Kasi lokola baklisto bazali kobunda makasi mpo na kokokisa yango, bazali kozwa matomba mingi. Likambo eleki nyonso, ezali ete bazali na esengo ya kopesa, lisusu na bosepeli na koyebaka ete bazali kosepelisa Yehova Nzambe, ye oyo azali “Tata ya bato nyonso.”​—Baefese 4:6, NW.

[Etanda na lokasa 6]

Toli ya Nzambe epai na basungami mpe basungi

Zalá molendisi: “Moto na moto na biso asepelisa mozalani na ye mpo na malamu na ye ete akembisa ye.”​—Baloma 15:2.

Zalá ngwi: “Tólɛmbaka mpo na kosalaka malamu te zambi na ntango oyo ekoki, tokobuka soko tokotika motema te.”​—Bagalatia 6:9.

Zalá na komikitisa: “Bósala likambo moko mpo na elulela soko mpo na nzombo te kasi, awa ezali bino kosɔkɛma, bótánga bamosusu ete baleki bino.”​—Bafilipi 2:3.

Zalá moto na misala malamu: “Tiká te ete moto aluka bobele malamu na ye moko kasi yango na mozalani na ye.”​—1 Bakolinti 10:24.

Zalá na makanisi mabongi: “Tiká ete [makanisi mabongi, NW] na bino [ma]yebana na bato nyonso.”​—Bafilipi 4:5.

Zalá na motema mawa: “Bózalanaka na boboto, moko epai na mosusu, na motema mawa, na kolimbisana mokomoko.”​—Baefese 4:32.

[Elilingi na lokasa 7]

Bankulutu oyo bazali bilenge bakoki kozwa litomba na eksperiansi ya mibangé

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto