Kebá na “Baepikuli”
“Azali moto malamu! Atósaka mitindá mitombwani ya bizaleli malamu. Amelaka makaya te, asalelaka bilangwiseli te, to alobaka makambo ya mbindo te. Ya solo, aleki bato oyo bamibéngaka baklisto na malamu!”
OSILÁ koyoka bato mosusu kokanisa lolenge wana mpo na kolóngisa boninga mabe oyo bazali kokólisa? Likanisi yango eyokani na Makomami? Ndakisa moko euti na lisangá ya boklisto ya ebandeli ekongɛngisa biso na likambo yango.
Na ekeke ya liboso, ntoma Paulo akebisaki lisangá ya Kolinti ete: “Bózimbisama te; kotambolana na bato mabe ekobebisa malamu na motema.” Mbala mosusu baklisto mosusu bazalaki na boninga elongo na bato oyo bazalaki na nsé ya bopusi ya filozofi ya Bagreke, mpe oyo ya Baepikuli (épicuriens). Baepikuli bazalaki banani? Mpo na nini bazalaki likámá mpo na baklisto ya Kolinti? Bato ya lolenge yango bazali mpe lelo oyo, mpo ete tókeba na bango?—1 Bakolinti 15:33.
Baepikuli bazalaki banani?
Baepikuli bazalaki bato oyo bazalaki kolanda filozofe moko Mogreke na nkombo Epikulo (Épicure), oyo azalaki na bomoi kobanda mobu 341 kino 270 L.T.B. Azalaki koteya ete esengo ezali eloko ya ntina koleka kati na bomoi. Yango elimboli ete Baepikuli bazalaki na bomoi ya mabe, ya kozanga mitindá, oyo emonanaki na etamboli ya mbindo na kolandáká koluka bisengo? Likambo ya kokamwa, Epikulo ateyaki bayekoli na ye te ete bázala na bomoi ya lolenge wana! Nzokande, ateyaki ete esengo ezwamaka malamu soki moto azali na bokɛngi, na mpiko, na komipekisa, mpe na boyengebene kati na bomoi. Aboyaki mpenza likambo ya kolanda bisengo na mbangu mpe bisengo oyo ekoumela bobele mpo na mwa ntango moke na bomoi mobimba. Na lolenge yango Baepikuli bakokaki komonana bato na bizaleli malamu wana bakokanisami na baoyo bamipesi na masumu.—Tito 1:12.
Bakokani na boklisto?
Soki ozalaki mosangani ya lisangá ya Kolinti na ntango ya kala, olingaki kondimela Baepikuli? Na ntembe te, bamoko bakokaki kokanisa ete lokola Baepikuli bazalaki komitambwisa na mitindá mitombwani, balingaki kozala baninga malamu mpo na baklisto. Komilóngisáká koleka, Bakolinti bakokaki komona bokokani kati na mitindá ya Baepikuli mpe oyo ya Liloba ya Nzambe.
Na ndakisa, Baepikuli bazalaki na bokatikati mpo na oyo etali bisengo. Bapesaki motuya mingi na bisengo ya mayoki koleka oyo ya nzoto. Eloko moto azalaki kolya ezalaki na motuya mingi te koleka boyokani elongo na moto oyo ye azali kolya na ye. Baepikuli bazalaki kopekisa kokɔta na makambo ya politiki mpe misala mabe ya nkuku. Ezalaki likambo ya mpasi te mpo na baklisto ya liboso kokanisa ete: “Bakokani mpenza na biso!”
Nzokande, Baepikuli bazalaki solo lokola baklisto ya liboso? Soko moke te. Bato oyo bazalaki mpenza na makoki mpo na kososola bakokaki komona bokeseni. (Baebele 5:14) Bongo yo? Tiká ete tótalela penepene mateya ya Epikulo.
Mateya mabe ya Epikulo
Mpo na kosalisa bato ete bálónga bobangi ya banzambe mpe ya liwa, Epikulo azalaki koteya ete banzambe bamibanzabanzaka mpo na bato te mpe basungaka bato na mikakatano na bango te. Engebene Epikulo, banzambe bazalisaki molɔngɔ́ te, mpe bomoi ebandaki na lolenge ya pwasa. Yango ekeseni mpenza na mateya ya Biblia oyo emonisi ete “Nzambe moko” azali, ye Mozalisi, mpe akomibanzabanzaka mpo na bato, bikelamu na ye, boye te?—1 Bakolinti 8:6; Baefese 4:6; 1 Petelo 5:6, 7.
Epikulo azalaki koteya lisusu ete bato bakozonga lisusu na bomoi te nsima ya liwa. Na ntembe te, liteya yango likeseni mpenza na liteya ya Biblia na ntina na lisekwa. Yango wana, ntango ntoma Paulo azalaki koteya na Ngomba na Ale (Aréopage), na ntembe te Baepikuli bazalaki kati na bato oyo bandimelaki Paulo te na ntina na liteya ya lisekwa.—Misala 17:18, 31, 32; 1 Bakolinti 15:12-14.
Emonanaki ete liteya oyo elekaki mabe kati na mateya ya Epikulo, ezalaki mpenza na bokosi koleka. Lokola andimaki te ete bomoi ekoki kozongisama nsima ya liwa yango ememaki ye na bosukisi ete moto asengeli kosala nyonso oyo ekoki na ye mpo na kozala na bolamu na boumeli ya bomoi na ye mokuse na mabelé. Lokola touti komona yango, makanisi na ye ezalaki mpenza te ya kozala na bomoi ya mbindo, ya masumu kasi, nde kotonda na bisengo ya bomoi ya ntango oyo, mpo ete bomoi mosusu ezali te nsima ya bomoi oyo.
Boye, Epikulo azalaki kopekisa etamboli mabe ya nkuku mpo na kobanga kotɔndɔlama, yango ezali mpe likámá ya solo mpo na kozala na esengo lelo. Alendisaki ezaleli ya bokatikati mpo na kopɛngola kolekisa ndelo, libaku mosusu mpo na kobatela esengo. Alendisaki boyokani malamu elongo na basusu mpamba te ntango bakozongisela yo bolamu, ekozala litomba. Ya solo, koboya kosala mabe na nkuku, kosalela bokatikati, mpe kokólisa boninga malamu ezali misala ya kozwa na yango makumisi. Na bongo, mpo na nini mateya ya Epikulo mazalaki likámá mpo na moklisto? Mpamba te batoli na ye ezwaki moboko likoló na lolenge na ye ya kotalela makambo oyo ezangi kondima ete: “Tólyaka mpe tómelaka zambi tokokufa lobi.”—1 Bakolinti 15:32.
Biblia ezali komonisa na bato lolenge ya kozala na esengo sikawa. Nzokande, ezali kopesa toli ete: “Bómibatela kati na bolingo na Nzambe; awa ezali bino kozela mawa na Nkolo na biso Yesu Klisto kino na bomoi na seko.” (Yuda 21, NW) Ɛɛ, Biblia ebendi likebi likoló na bomoi ya seko na mikolo mizali koya, kasi na eleko oyo ya mokuse te. Mpo na moklisto, kosalela Nzambe ezali likambo ya ntina koleka, mpe azali komona ete ntango azali kotya Nzambe na esika ya liboso, azali na esengo mpe azali kosepela. Na lolenge moko, Yesu, na esika ete amibanzabanza bobele na matomba na ye moko, azalaki kosalela Yehova mpe kosunga bato na makasi na ye nyonso kozanga moimi. Ateyaki bayekoli na ye ete básala malamu epai na bato mosusu, na elikya te ete bázongisela bango, kasi na bolingo ya solo mpo na bango. Emonani polele ete, likambo ya ntina oyo ezali kosala bopusi epai na Baepikuli ekeseni mpenza na oyo ya lisangá ya boklisto.—Malako 12:28-31; Luka 6:32-36; Bagalatia 5:14; Bafilipi 2:2-4.
Bokosi oyo ezali komema na likámá
Likambo ya kokamwa, ntango Baepikuli bazalaki kobenda likebi mingi likoló na esengo, bango moko bazalaki mpenza na esengo te. Lokola azangaki “esengo ya Yehova,” Epikulo abéngaki bomoi “likabo ya bololo.” (Nehemia 8:10) Soki tosali bokokanisi, tokomona ete baklisto ya liboso bazalaki na esengo mingi koleka! Yesu azalaki te kosengisa bomoi oyo ezangi esengo, ya komipimela biloko oyo ozali na yango mposa mpo na kobikela. Ya solo, kolanda bomoi na ye ezali nzela oyo ekomema na esengo eleki monene.—Matai 5:3-12.
Soki basangani mosusu ya lisangá ya Kolinti bakanisaki ete bakokaki kosala boninga na bato oyo bapusamaki na makanisi ya Baepikuli kozanga ete kondima na bango etyama na likámá, bazalaki komikosa. Na ntango oyo Paulo azalaki kokoma mokanda na ye ya liboso epai na Bakolinti, bamoko kati na bango basilaki kobungisa kondima kati na lisekwa.—1 Bakolinti 15:12-19.
Mateya ya Baepikuli mazali lelo?
Atako Baepikuli balimwaki na ekeke ya minei T.B., lelo oyo, ezali na baoyo bazali komekola likanisi yango, buká ndika ntango ozali naino na mino. Bato yango bazali na kondima moke to mpe bazangi mpenza kondima na elaka ya Nzambe etali bomoi ya seko. Nzokande, basusu kati na bango bazali kotosa bobele mwa ndambo ya mitindá mitombwani ya etamboli.
Moklisto akoki komekama ete asala boyokani ya penepene elongo na bato ya motindo oyo, kokanisáká mbala mosusu ete bizaleli na bango malamu bilóngisi boninga yango. Nzokande, atako tokomitalela te lokola toleki basusu, tosengeli kobatela na makanisi ete “kotambolana na bato mabe” nyonso—bakisa baoyo bopusi na bango ezali na bokosi koleka—“ekobebisa malamu na motema.”
Likanisi ya kobuka ndika ntango ozali naino na mino ezali mpe kopalangana na makita ya bato ya mombongo, na mikanda ya kopesa mateya, na bazulunalo, na bafilime, na televizyó, mpe na miziki. Atako ezali na mbala moko te kolendisa etamboli ya masumu, makanisi oyo ya kozanga kondima makoki kopusa biso na lolenge ya bokosi? Na ndakisa, tokómi nde kolukaluka kokokisa bamposa na biso mpenza na boye ete tobosani likambo ya boyangeli ya Yehova? Tokoki nde kobanda kolɛmba na ‘mosala ya kosakola,’ na esika ete tózala na mosala mingi kati na Nkolo? To tokoki nde kobanda kobɛta ntembe na boyengebene mpe na matomba malamu ya mitindá ya Yehova? Tosengeli kokeba ezala na komitya mbala moko na nzela ya bomoi ya mbindo, ya mobulu, mpe ya misala ya bilimu mabe to na ngambo ya bato oyo batambwisami na makanisi ya mokili!—1 Bakolinti 15:58; Bakolose 2:8.
Yango wana, tiká ete tókólisa boninga, mpenzampenza elongo na baoyo bazali kolanda litambwisi ya Yehova na motema mobimba. (Yisaya 48:17) Yango ekosala ete, bizaleli na biso ya malamu bilendisama. Kondima na biso ekokóma makasi. Tokozala na bomoi ya esengo bobele na ntango oyo te, kasi tokolikya mpo na bomoi ya seko na mikolo mizali koya.—Nzembo 26:4, 5; Masese 13:20.
[Elilingi na lokasa 24]
Epikulo azalaki koteya ete banzambe bamibanzabanzaka mpo na bato te
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Courtesy of The British Museum