Tobebisa te libaku ya bonsomi oyo Nzambe asili kopesa biso
“Esika ezali elimo na Jéhovah, bonsomi ezali wana.”—2 BAKOLINTI 3:17, MN.
1. Mpo na nini Yisaya 65:13, 14 ezali kotalela ba Témoins de Jéhovah?
JÉHOVAH azali Nzambe na bonsomi. Mpe bonsomi oyo Nzambe azali kopesa ezali mpenza lipamboli. Lokola basaleli na ye bamipesi bazali na bonsomi yango, maloba oyo na Moyangeli Aleki Monene Jéhovah makokani mpo na bango: “Tala, baombo na ngai bakolya, nde bino bokoyoka nzala. Tala, baombo na ngai bakomela, nde bino bokoyoka mposa na mai. Tala, baombo na ngai bakosepela, nde bino bokonguluma mpo na mpasi na motema, bokolela mpe mpo na mikakatano na elimo.”—Yisaya 65:13, 14.
2. Mpo na nini basaleli na Jéhovah bazali na bolamu mingi kati na elimo?
2 Basaleli na Nzambe bazali na bolamu oyo ya elimo mpo ete batambwisami na elimo na ye to nguya oyo ekosalaka mosala. Ntóma Paulo alobaki ete: “Jéhovah azali Elimo; mpe na esika ezali elimo na Jéhovah, bonsomi ezali wana.” (2 Bakolinti 3:17, MN) Nini ezali ntina ya bonsomi oyo Nzambe asili kopesa biso? Mpe likambo nini bosengeli kosala mpo na kosalela yango na lolenge ya kokoka?
Bonsomi oyo Nzambe azali na yango
3. Bonsomi ya lolenge nini Nzambe azali na yango, mpe mpo na nini?
3 Bobele Jéhovah nde azali na bonsomi kati na makambo nyonso. Moko te kati na bikelamu na ye akoki kotya ndelo na bonsomi na ye mpamba te azali Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso mpe Moyangeli Aleki Monene ya molongo mobimba. Lokola mosembo Yobo alobaki yango, “nani akopekisa ye? Nani akoloba na ye ete: ‘Okosala nini?’” (Yobo 9:12) Motindo moko, Nebukadanezare, mokonzi ya Babilone, asukaki na kondima likambo oyo ete: “Moto moko akoki kopekisa loboko na ye [Nzambe] te, to kolobela ye ete: ‘Ozali kosala nini?’”—Danyele 4:35.
4. Mpo na nini Jéhovah azali kosalela bonsomi na ye kati na bandelo oyo ye moko asili komityela?
4 Nzokande, Jéhovah azali kosalela bonsomi na ye kati na makambo nyonso na kolandaka bandelo oyo asili komityela ye moko na ntina na mitinda na ye ya sembo. Likambo yango limonisamaki polele na ntango Abalayama ayebisaki motungisi na ye na ntina na bafandi ya Sodome mpe atunaki ete: “Mosambisi na mokili mobimba akosala sembo te?” Eyano na Nzambe emonisi likambo moko: ayebi mpenza ete azali na mokumba ya kosala oyo ezali sembo. Asengelaki koboma Sodome te soki bato malamu bamonanaki na kati na yango. (Genese 18:22-33) Nzambe azali mpe kosalela bonsomi na ye na makambo nyonso na kolandaka bandelo oyo amityeli ye moko mpo ete bolingo na ye mpe mayele na ye ezali kosimba ye ete asilika noki te mpe ete asalela ezaleli ya komipekisa.—Yisaya 42:14.
Bandelo ya bonsomi ya moto
5. Wapi mwa makambo oyo mazali kotya ndelo na bonsomi ya moto?
5 Atako Jéhovah azali na bonsomi na makambo nyonso, bikelamu nyonso mosusu ya bomoi bizali kosala na kati ya bandelo oyo etyami na lolenge na bango, na makoki na bango, na efandelo na bango, mpe na makambo lokola boumeli ya lelo ya bomoi mokuse ya bato na masumu. Jéhovah Nzambe azalisaki moto na kopesaka ye bonsomi ya kokoka mpo na kofanda kati na esika oyo abongiselaki ye. Ezali na bantina mingi mosusu mpo na yango bonsomi ya moto ezali na ndelo, kasi etali makambo nyonso te.
6. Likambo oyo ete tozali na makambo ya kozongisa epai na Jéhovah ezali na bopusi nini likoló na bonsomi na biso?
6 Ya liboso, bonsomi na moto ezali na ndelo, mpamba te Nzambe azalisaki moto mpo na kosalela mokano na Ye. Jéhovah abongi ‘kozwa nkembo, na lokumu, na nguya, mpo ete ye nde azalisaki biloko binso; mpe mpo na mokano na ye bizali mpe bisili kozalisama.’ (Emoniseli 4:11) Na ntina yango, moto azali na makambo ya kozongisa epai na Mozalisi na ye, oyo atyaki na lotomo nyonso mibeko na nzela na yango bato basengeli koyangelama. Kati na Yisraele ya kala, na nse na Mibeko na Moize, Nzambe asengaki ete baboma bato oyo bazalaki koloba mabe likoló na nkombo na ye to bazalaki kobuka mobeko motali sabata. (Exode 20:7; 31:14, 15; Levitike 24:13-16; Mituya 15:32-36) Atako baklisto bazwami na nse na Mibeko te, bonsomi na biso ezali na ndelo mpamba te tozali na makambo ya kozongisa epai na Jéhovah, oyo azali Mosambisi na biso, Mosali na mibeko mpo na biso mpe Mokonzi na biso.—Yisaya 33:22; Baloma 14:12.
7, 8. (a) Na nini mibeko ya bozalisi mizali kotya ndelo na bonsomi ya moto? (b) Mibeko nini mosusu ya Nzambe mizali kotya ndelo na bonsomi na biso bato?
7 Ya mibale, bonsomi ya moto ezali na ndelo na ntina na mibeko ya bozalisi (lois physiques). Na ndakisa, mobeko ya pesanteur ekosalaka ete moto akoki te komibwaka longwa na ndako moko molai kino na nse bongo nzanga kozoka to kokufa. Ezali bongo polele ete mibeko ya bozalisi mizali kotya ndelo na bonsomi ya moto: ezali na makambo oyo akoki kosala yango te.
8 Ya misato, bonsomi na moto ezali na ndelo na ntina na mibeko na Nzambe mpo na bizaleli malamu. Na ntembe te osilaki komona bosolo ya maloba oyo ntóma Paulo akomaki na Bagalatia 6:7, 8: “Bomizimbisa te; bakosekaka Nzambe te. Soko moto akokona nini, akobuka bobele yango. Soko akokona kati na nzoto; akobuka libebi kati na nzoto; nde ye oyo akokona kati na elimo akobuka bomoi na seko na nzela na elimo.” Na ntembe te, mibeko ya Jéhovah Nzambe na ntina na bizaleli malamu mizali mpe kotya ndelo na bonsomi na biso, kasi esengeli na biso kotosa mibeko yango mpo na kozwa bomoi.
9. Na nini kozala na biso kati na libota ya bato ezali kotya ndelo na bonsomi na biso?
9 Ya minei, bonsomi ya moto ezali na ndelo mpo ete ye azali kati na libota ya bato. Na yango bonsomi na ye esengelaki kozala mingi te kino kobebisa oyo ya moninga mosusu. Baklisto basengeli kozala na botosi epai na “bakonzi baleki liboso” kati na biyangeli mpe kotosa bango ntango nyonso oyo bakosenga bango te ete babuka mibeko na Nzambe. (Baloma 13:1; Misala 5:29) Na ndakisa, tosengeli kotosa mibeko oyo mitali kofuta mpako, oyo mitali vitesse tozali kotambwisa na yango motuka, mpe bongo na bongo. Likambo oyo ete tosengeli kotosa mibeko wana ya “Kaisala” ezali mpe elembo mosusu emonisi ete bonsomi oyo Nzambe asili kopesa biso ezali mpo na makambo nyonso te.—Malako 12:17; Baloma 13:7.
Mpo na nini bonsomi bozali na ndelo?
10, 11. Mpo na nini Jéhovah apesaki epai na bato bonsomi bozali na ndelo?
10 Mpo na nini Nzambe apesaki bato bonsomi bozali na ndelo? Kati na bantina mosusu, ezalaki mpo ete awa na mabelé bikelamu na mayele bapesa ye lokumu mpe basanzola ye na nzela ya maloba na bango kitoko mpe etamboli na bango kitoko. Oyo wana, bato bakoki kosala yango, nzokande banyama bazali na makoki te mpo na kosala yango. Lokola bazali na esosweli te, banyama bazali na likanisi ata moko te mpo na oyo etali ndimbola ya bizaleli malamu. Tokoki kolakisa na mbwa moko ete akamata te eloko boye, kasi tokoki koteya ye te ete koyiba ezali mabe. Lokola, mpo na koloba malamu, misala na ye mimonani lokola ete misili kobongisama liboso, nyama akoki te kokamata bikateli oyo bizali kokumisa Nzambe mpe komemela ye masanzoli, nzokande moto akoki na bonsomi nyonso kozwa ekateli ya kosalela Mozalisi na ye, mpe yango na bolingo mpe na botondi.
11 Soki Nzambe apesi bonsomi yango epai na bato, ezali mpe mpo ete bazwela yango bolamu mpe bazala na esengo. Bakoki kosalela bonsomi na bango oyo bozali na ndelo na kozalaka na elimo ya kolukaluka, ya kobimisa biloko na sika, na motema malamu mpe na kosalaka na boyokani elongo na basusu. Bato bazali mpe na bonsomi ya kopona kati na makambo lokola misala na bango ya mosuni mpe bisika na bango ya kofanda. Lelo oyo, makambo na nkita mpe ya politike mazali mbala mingi kokitisa bonsomi yango ya kopona, kasi mbala mosusu esalami na ntina na lokoso ya moto, kasi ezali te mpo na lolenge oyo Nzambe akelaki bato na ebandeli.
12. Mpo na nini ebele na bato bazali kati na boombo?
12 Atako Jéhovah asilaki kopesa epai na bato bonsomi moko monene, lelo oyo ntalo monene na bango bazali kati na boombo ya mawa mingi. Ezali mpo na nini? Mpo ete mobali na liboso mpe mwasi na liboso, Adam ná Eva, babebisaki libaku ya bonsomi oyo Nzambe apesaki bango. Balekaki ndelo oyo Nzambe atyaki mpo na bonsomi na bango mpe batyolaki boyangeli na sembo oyo Jéhovah Nzambe azalaki na yango likoló na bango lokola Moyangeli Aleki Monene. (Genese 3:1-7; Yilimia 10:10; 50:31) Na esika ete bazwa bosepeli na kosalelaka bonsomi na bango mpo na kokumisa Nzambe, basalelaki yango na moimi, mpo na kozwa ekateli na bonsomi nyonso mpo na oyo etali malamu mpe mabe, kosanganaka bongo na Satana kati na botomboki na ye liboso na Jéhovah. Kasi, na esika ete bazwa bonsomi ya mingi koleka, basumuki Adam ná Eva, bakotaki nde kati na bipekiseli mpe boombo ya mpasi mingi, kokitisama ya bonsomi na bango, mpe nsuka na yango liwa. Bakitani na bango batukaki libula ya kozanga bonsomi wana. “Bato nyonso babungi mpe bazangi nkembo na Nzambe.” “Masumu makofutaka mbongo, mbongo yango bobele kufa.”—Baloma 3:23; 5:12; 6:23.
13. Mpo na nini Satana alongaki kozwa bato kati na boombo?
13 Na ntina na botomboki bobimaki na Edene, Adam ná bakitani na ye bakangamaki mpe na boombo epai na Satan le Diable. Ya solo, “mokili mobimba ezali kolala na kati na oyo mabe.” (1 Yoane 5:19) Ezali mpo na makoki na ye mpe na nguya na ye mingi nde Satana alongaki kokosa bato nyonso oyo bamitangoli mosika na Jéhovah Nzambe mpe kokomisa bango baombo na ye. Na yango, bato na moimi bayangelaki bazalani na bango mpo na kopesa bango mpasi. (Mosakoli 8:9) Tala mpo na nini lelo, ebele na bato bazali baombo ya masumu mpe ya liwa, ya Satana mpe ya bilimu mabe, bakisa mpe ya bibongiseli na politike, na nkita mpe na mangomba ya mokili.
Likoki ya kozwa bonsomi na solo limonani
14. Elikya ya bato na ntina na bonsomi ya solo ekangisami na nini?
14 Kosikolama na lisumu, na liwa, bakisa na Diable mpe na mokili na ye ekangisami na ekateli na Nzambe na kosukisa likambo litali lotomo ya boyangeli na ye ya molongo mobimba. Ezali mpo ete Satana abimisaki likambo yango nde Jéhovah atikaki ye na bomoi, lokola atikaki Farao na bomoi mpo na mwa ntango moke. Mpo ete Jéhovah akoka komonisa nguya na ye nyonso mpe nkombo na ye ekoka kosakolama na mokili mobimba. (Exode 9:15, 16) Mosika te Nzambe akomilongisa lokola Nkolo ya molongo mobimba mpe akobulisa nkombo na ye na kolongolaka nsoni oyo ebwakami likoló na nkombo yango mpo na botomboki ya Satana, ya Adam mpe ya Eva. Na ntina yango, baoyo bazali kobanga Jéhovah bakosikolama na boombo ya lisumu mpe ya liwa, mpe bakokotisama kati na mokili ya sika, epai kuna bakozala na bonsomi oyo Nzambe azali kopesa.—Baloma 8:19-23.
15. Mokumba nini Yesu akokisaki yango kati na kosikolama ya bato?
15 Mpo na kopesa bonsomi epai na bato, Jéhovah atindaki Mwana na ye na mabelé lokola moto. Na kotikaka bomoi na ye ya bomoto na kokoka, na bolingo na ye moko, Yesu Klisto, Mwana na Nzambe, apesaki mbeka na lisiko oyo epesi nzela na bato ete basikolama. (Matai 20:28) Asakolaki mpe nsango ya bonsomi. Na ebandeli ya mosala na ye, akokisaki maloba oyo na ye moko: “Elimo na Nkolo Jéhovah ezali likoló na ngai, mpo ete Jéhovah apakoli ngai mpo na koyebisa nsango malamu epai na basokemi, atindi ngai kobongisa batutami na motema; kosakola ekangweli epai na bakangami mpe kozipolama na ekangelo epai na baoyo bakangami.”—Yisaya 61:1; Luka 4:16-21.
16. Matambe nini Bayuda ya ekeke na liboso basengelaki kosala mpo na kozwa bonsomi ya solo?
16 Ndenge nini bato bakokaki kozwa bonsomi yango? Yesu alobaki ete: “Soko bino bokoumela kati na liloba na ngai, bokozala bayekoli na ngai na solo, mpe bokoyeba solo, mpe solo ekosikola bino.” Ezali lolenge yango nde bayekoli na Yesu bayaki kozwa bonsomi ya elimo. (Yoane 8:31, 32, 36) Lisusu, Yesu alobaki epai na Ponti Pilato, guvernere moloma ete: “Ngai nabotami mpo na ntina oyo mpe nayei na mokili ete natatola mpo na solo. Moto na moto oyo azali na mposa na solo akoyokaka mongongo na ngai.” (Yoane 18:37) Bayuda oyo bandimaki solo oyo Yesu azalaki kosakola na maloba mpe na misala batikaki masumu na bango, basembolaki etamboli na bango mabe, bamimonisaki liboso na Jéhovah mpe bazwaki batisimo lokola Yesu azwaki yango. (Matai 3:13-17; Misala 3:19) Na motindo yango, na ngolu ya Nzambe, bakomaki na mwa bonsomi.
17. Mpo na nini Jéhovah azali kopesa bonsomi epai na basaleli na ye?
17 Jéhovah azali kopesa bonsomi epai na basaleli na ye ya sembo, ya liboso mpo na kolongisa boyangeli na ye, kasi lisusu mpo na elendiseli na bango mpe mpo na bolamu na bango. Asikolaki Bayisraele na boombo na Ezipito mpo ete bakoka kokumisa ye na kozalaka bokonzi na banganga, batatoli na ye. (Exode 19:5, 6; Yisaya 43:10-12) Motindo moko, Jéhovah asikolaki libota na ye na boombo na Babilone, libosoliboso mpo na kotonga lisusu tempelo na ye mpe kozongisa losambo ya solo. (Ezela 1:2-4) Lokola bato bazongaki longwa na boombo bazalaki komibanzabanza bobele mpo na bolamu na bango ya mosuni, Jéhovah atindaki basakoli na ye Agai mpe Zakaria mpo na kokundwela bango mikumba na bango liboso na Nzambe. Ntango Bayisraele basosolaki esika nini bonsomi oyo Nzambe apesaki bango esengelaki kozwa epai na bango, tempelo esilisamaki, mpo na lokumu na Nzambe, mpe libota naye ekokaki kozwa elendiseli mpe bolamu.
Tobebisa te libaku ya bonsomi oyo Nzambe apesi biso
18. Mpo na nini tokoki koloba ete basaleli na Jéhovah ya ntango na biso babebisi te libaku ya bonsomi oyo Nzambe asili kopesa bango?
18 Tokoki koloba boni mpo na basaleli ya Nzambe na mikolo na biso? Lokola lisangá, babebisi te libaku ya bonsomi oyo Nzambe apesi bango. Na bambula 1870, babandaki komisikola na mateya ya lokuta ya Babilone mpe kozala na bonsomi monene ya boklisto. Yango ezalaki na boyokani na Masese 4:18, oyo elobi ete: “Kasi nzela na bayengebeni ezali lokola pole oyo ekongenga lisusu mpe lisusu kino mokolo na malamu koleka.” Nzokande, motindo moko lokola na kala libota na Nzambe, na boumeli ya mwa ntango, lizalaki baombo ya Babilone, motindo moko mpe, na 1918, basaleli na Nzambe bakangamaki na boombo na Babilone Monene. (Emoniseli 17:1, 2, 5) Kati na lisangá wana ya mokili mobimba ya losambo na lokuta, basusu basepelaki ntango “batatoli mibale” ya elilingi balalaki kati na liwa ya elimo. Kasi, na ngolu na Nzambe, na 1919 basaleli na ye bapakolami bazongisamaki na bomoi, basikolamaki na elimo. (Emoniseli 11:3, 7-11) Kosalelaka bonsomi oyo Nzambe apesaki bango, bakomaki batatoli na molende ya Oyo-Aleki-Likoló. Na bongo yango ebongaki mpenza ete na 1931 bakamata na esengo nyonso nkombo Témoins de Jéhovah. (Yisaya 43:10-12) Mingi mpenza kobanda 1935, “ebele monene” oyo bazali kolikya kozwa bomoi na seko na mabelé basangani esika moko na Batemwe bapakolami. Bango mpe bazali kobebisa te libaku ya bonsomi oyo Nzambe apesi bango.—Emoniseli 7:9-17.
19, 20. (a) Tanga lolenge moko ya polele oyo basaleli na Jéhovah bazali kosalela malamu bonsomi oyo asili kopesa bango? (b) Na motindo nini mosusu ya polele ba Témoins de Jéhovah bazali kosalela malamu bonsomi oyo Nzambe asili kopesa bango?
19 Ezali na balolenge mibale ya polele, basaleli na Nzambe bazali kosalela malamu bonsomi oyo epesameli bango. Ya liboso, na kozalaka na etamboli malamu. (1 Petelo 2:16) Oyo nde lokumu kitoko bazali na yango! Na ndakisa, mokolo moko mobali moko akotaki kati na Salle du Royaume, na Suisse, na engumba Zurich, mpe alobaki ete alingi kokoma Témoin de Jéhovah. Ntango batunaki ye ntina oyo ebendaki ye na kozwa ekateli wana, ayebisaki ete ndeko na ye ya mwasi, Témoin de Jéhovah, abimisamaki na lisangá mpo na pite. Abakisaki ete: ‘Ezali kati na lingomba ya boye nde nalingi kozala. Lingomba oyo lizali kokanga miso te liboso na etamboli mabe.’ Mokanda Nouvelle Encyclopédie catholique (angl.) emonisi, na bosolo nyonso ete ba Témoins de Jéhovah basili kozwa lokumu ya kozala “moko na mangomba oyo mazali komitambwisa malamu kati na mokili.”
20 Ba Témoins de Jéhovah bazali mpe kosalela bonsomi oyo Nzambe apesi bango na kokokisaka mokumba na bango, oyo etali mpenza kosakola nsango malamu ya Bokonzi, lokola Yesu asalaki yango. (Matai 4:17) Ezala na maloba to na mikanda, ezala na lolenge ebongisami to ya libaku malamu, bazali kosakola Bokonzi na Jéhovah. Mosala yango ezali kopesa bango matomba minene, mpamba te ezali kolendisa kondima na bango mpe ezali koyeisa elikya na bango makasi. Lisusu, ezali kopesa nzela mpo na lobiko na bango mpe lobiko ya baoyo bazali koyoka bango. (1 Timote 4:16) Kati na mokanda Mouvements religieux dynamiques (angl.), ezali kotangama boye na ntina na mosala yango: “Ekozala mpasi na komona lingomba mosusu oyo lizali na molende koleka lokola ba Témoins de Jéhovah.”
21. Nini emonisi ete Jéhovah azali kopambola mosala ya libota na ye?
21 Ya solo, Jéhovah azali kopambola milende oyo tozali kosala mpo na kokokisa mokano ya bonsomi oyo asili kopesa biso. Ezali yango nde tozali komona wana ezali biso kotala rapport ya mosala na kosakola ya mbula eleki: tozali komona motuya ya sika ya basakoli koleka milió minei, mpe bato koleka milió zomi bayanganaki na Ekaniseli ya liwa na Yesu. Na ndakisa, na mokili ya Irlande, bazwaki motuya ya sika mbala 29 elandani sanza na sanza kati na motuya ya basakoli; na mokili ya Mexique bazwaki mbala 78 na boumeli ya basanza 80; mpe na mokili ya Japon, elandanaki mbala 153!
Tosalela malamu bonsomi oyo Nzambe asili kopesa biso
22. Tanga mwa mituna ya mozindo oyo tosengeli komituna biso moko?
22 Soki tozali ba Témoins de Jéhovah, tosalelaka malamu bonsomi oyo Nzambe asili kopesa biso? Moko na moko kati na biso akoki komituna mituna oyo: ‘Nasenzelaka mpo na kosalela bonsomi oyo Nzambe apesi ngai na motindo ete nakweisa moto moko te na etamboli moko mabe? Natosaka mpenza na motema moko mibeko ya Kaisala, kopesaka bongo esika ya liboso na mobeko na Nzambe? Nasalaka mpenza na boyokani malamu elongo na bankulutu ya lisangá? Nasalelaka mpenza na motindo ya kokoka bonsomi oyo Nzambe apesi ngai mpo na kosakola nsango malamu? Nazali mpenza na “mosala mingi ntango nyonso kati na mosala ya Nkolo”? To nazali nde kokoba na lokoso nyonso mosala moko kati na mokili, nzokande nakokaki kosalela malamu bonsomi oyo Nzambe apesi ngai na kokolisaka mosala na ngai mpo na Nzambe mpe na kozalaka na mposa ya komema mikumba mingi kati na lisangá to kati na mosala ya pionnier?’—1 Bakolinti 15:58.
23. Likambo nini tosengeli kosala mpo tobebisa te libaku ya bonsomi oyo Nzambe apesi biso?
23 Tika ete biso nyonso ‘tomeka mpe tomona ete Jéhovah azali malamu!’ (Nzembo 34:8) Tomipesa epai na ye, toyokanisa bomoi na biso na mibeko na ye mpe kokumisa nkombo na ye mosantu na kosakolaka na molende Bokonzi na ye. Tobosana te ete baoyo ‘bazali kolona mingi bakobuka mpe mingi.’ (2 Bakolinti 9:6) Na yango, tosalela Jéhovah na motema na biso mobimba mpe tomonisa ete tobebisi te libaku ya bonsomi oyo apesi biso.
Bozongeli
◻ Bonsomi ya lolenge nini Nzambe azali na yango?
◻ Wapi bandelo ya bonsomi na moto?
◻ Nini epesaki nzela na bato ete bazwa bonsomi ya solo?
◻ Likambo nini tosengeli kosala mpo ete tobebisa te libaku ya bonsomi oyo Nzambe asili kopesa biso?
[Elilingi na lokasa 9]
Bonsomi ya bato etyameli ndelo na makambo lokola mobeko ya pesanteur