Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Tikalá kati na “Mboka na kobombama” mpo ete obikisa bomoi na yo!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1995 | 15 Novembre
    • 20. Mpo na komibatela liboso na Mobekoli ya makila, baoyo bazali kati na mboka na kobombama ya solo basengeli kosala nini?

      20 Mpo na komibatela liboso na mobekoli ya makila, bato oyo babomaki bato na nkó te basengelaki kotikala kati na mboka na kobombama mpe basengelaki te kotambolatambola libándá ya lopángo na yango. Ezali boni mpo na baoyo bazali kati na mboka na kobombama ya solo? Mpo na komibatela liboso na Mobekoli monene ya makila, basengeli te kotika mboka yango. Ya solo, basengeli komibatela na masenginya oyo makoki kopusa bango ete, na elobeli ya elilingi, bákende na ndelo ya lopango. Basengeli kosɛnzɛla ete bátika te ete ezaleli ya kolinga mokili ya Satana ekóla kati na mitema na bango. Yango ekosɛnga kobondela mpe kosala milende, mpe ebongi mpenza mpamba te bomoi na bango etalelami na yango.​—1 Yoane 2:15-17; 5:19.

  • Banzambe-basi mpo na kobota mpe mpo na etumba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1995 | 15 Novembre
    • Banzambe-basi mpo na kobota mpe mpo na etumba

      NA BOUMELI ya bolukiluki ya arkeoloji na engumba Ebla, na mboka Syrie, bamonaki eloko moko ya losambo oyo ezalaki na elilingi ya Ishtar, nzambe-mwasi mpo na kobota mpe mpo na etumba ya bato ya Babilone. Paolo Matthiae, mokundoli biloko ya kala, alobelaki yango lokola “elembo molai eyemami na elilingi ya milulu ya losambo oyo kati na yango bamonisaki nganganzambe-mwasi moko oyo elongi na ye ezipami, liboso na ekeko ya nzambe moko ya kokamwisa . . . oyo motó na yango ekangisami na esimbelo moko molai.”

      Bokundoli wana ezali na ntina monene, mpamba te ekeko yango esalemaki uta ebandeli ya ekeke ya 18 L.T.B. Engebene Matthiae, yango ezali kopesa “bilembeteli ya solosolo” ete losambo ya Ishtar eumelaki soko mibu 2000.

      Losambo ya Ishtar ebandaki na Babilone mpe na bikeke oyo bilandaki nsima epalanganaki kati na Boyangeli ya Loma. Yehova apesaki Bayisalaele etindá ya kolongola bilembo nyonso ya losambo ya lokuta kati na Mokili ya ndaká, kasi lokola basalaki yango te, losambo ya Ashtoreth (Ishtar epai na Bakanana) ekómaki motambo mpo na bango.​—Deteronome 7:2, 5; Basambisi 10:6.

      Atako Ishtar to Ashtoreth, oyo akokanaki na ye bazali lisusu te, kasi bizaleli oyo bazalaki komonisa​—pite mpe mobulu​—bipalangani mingi. Tokoki mpenza komituna soki mokili ya ntango na biso mokeseni solo na mimeseno wana ya kala oyo ezalaki kosambela banzambe-basi mpo na kobota mpe mpo na etumba.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto