Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • rq liteya 4 nk. 8-9
  • Zábolo azali nani?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Zábolo azali nani?
  • Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
  • Masolo mosusu
  • Kebá—Satana alingi kolya yo!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Yebá monguna na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Satana azali nani? Azalaka mpenza?
    Lamuká!—2007
  • Totelema ngwi liboso na mayele mabe ya Satana
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
Makambo mosusu
Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
rq liteya 4 nk. 8-9

Liteya 4

Zábolo azali nani?

Satana Zábolo​—autaki wapi? (1, 2)

Lolenge nini Satana azali kozimbisa bato? (3-7)

Mpo na nini osengeli kotɛmɛla Zábolo? (7)

1. Liloba “zábolo” elimboli moto oyo azali koloba lokuta mabe na ntina na moto mosusu. “Satana” elimboli monguna to motɛmɛli. Wana ezali nkombo epesami na monguna ya liboso ya Nzambe. Na ebandeli, azalaki anzelu ya kokoka kati na likoló elongo na Nzambe. Nzokande, na nsima akanisaki mingi na ntina na ye moko mpe alingaki losambo oyo esengelaki kopesama bobele epai na Nzambe.​—Matai 4:8-10.

2. Anzelu wana, Satana, alobaki epai na Eva na nzela ya nyoka. Na kolobeláká ye lokuta, amemaki ye na kozanga botosi epai na Nzambe. Na yango, Satana atyaki ntembe na “lotómo ya kozala mokonzi,” oyo Nzambe azali na yango, to na etɛlɛmɛlo na ye lokola Oyo aleki likoló. Satana atyaki ntembe na likambo ya koyeba soki Nzambe azali koyangela na lolenge ya malamu mpe mpo na bolamu ya bayangelami na Ye. Lisusu, Satana atyaki ntembe na likambo ya koyeba soki bato bakoki kotikala sembo epai na Nzambe. Na kosaláká bongo, Satana amikómisaki ye moko monguna ya Nzambe. Ezali mpo na yango nde akómaki kobéngama Satana Zábolo.​—Genese 3:1-5; Yobo 1:8-11; Emoniseli 12:9.

3. Satana azali komeka kozimbisa bato mpo ete básambela ye. (2 Bakolinti 11:3, 14) Moko na banzela oyo azali kosalela mpo na kozimbisa bato ezali bongo mangomba ya lokuta. Soki lingomba lizali koteya lokuta na ntina na Nzambe, yango ezali bongo kokokisa mokano ya Satana. (Yoane 8:44) Bato oyo bazali basangani na mangomba ya lokuta bakoki na bosembo nyonso kondima ete bazali kosambela Nzambe ya solo. Nzokande, bazali mpenzampenza kosalela Satana. Ye azali ‘nzambe na mokili oyo.’​—2 Bakolinti 4:4.

4. Bikelákela ezali nzela mosusu oyo Satana azali kotya bato na nsé na nguya na ye. Bato bazali kobelela bilimu mabe mpo na kobatela bango, mpo na kosala basusu mabe, mpo na kosakola makambo mazali koya, to mpo na kosala makamwisi. Nguya mabe oyo ezali nsima na misala nyonso wana ezali Satana. Mpo na kosepelisa Nzambe, tosengeli koboya boyokani nyonso elongo na bikelákela.​—Deteronome 18:10-12; Misala 19:18, 19.

5. Satana azali lisusu kozimbisa bato na nzela mabe ya lolendo ya mposo to ekólo mpe ya losambo ya bibongiseli ya politiki. Bamoko bakanisaka ete ekólo na bango to loposo na bango eleki ya bato mosusu. Kasi yango ezali solo te. (Misala 10:34, 35) Bato mosusu batyaka motema na bibongiseli ya politiki mpo na kosilisa mikakatano ya bato. Na kosaláká bongo, bazali kobwaka Bokonzi ya Nzambe. Nzokande yango ezali mwango bobele moko mpo na kosilisa mikakatano na biso.​—Danyele 2:44.

6. Nzela mosusu oyo Satana azali kozimbisa bato ezali ya kosɛnginya bango na bamposa ya masumu. Yehova alobi na biso ete tópɛngola misala ya masumu mpamba te ayebi ete yango ekosala biso mabe. (Bagalatia 6:7, 8) Bato mosusu bakoki kolinga ete osangana na bango na misala wana. Kasi, omikundola ete ezali mpenza Satana nde alingi ete osala misala wana.​—1 Bakolinti 6:9, 10; 15:33.

7. Satana akoki kosalela minyoko to botɛmɛli mpo ete otika Yehova. Bamoko kati na bato oyo olingaka mingi bakoki mpenza kokóma na nkanda mpamba te ozali koyekola Biblia. Basusu bakoki kotyola yo. Kasi bomoi na yo ezali na mabɔkɔ ya nani? Satana alingi kobangisa yo mpo ete otika koyekola makambo matali Yehova. Kotikela Satana nzela te ete alónga yo! (Matai 10:34-39; 1 Petelo 5:8, 9) Na kotɛmɛláká Zábolo, okoki kopesa Yehova esengo mpe komonisa ete ozali kosimba lotómo oyo Ye azali na yango ya kozala mokonzi.​—Masese 27:11.

[Bililingi na lokasa 9]

Mangomba ya lokuta, bikelákela, mpe bolíngi-ekólo ezali kozimbisa bato

[Elilingi na lokasa 9]

Tɛmɛlá Satana na kolandáká koyekola makambo matali Yehova

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto