Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Tómekola bosembo ya Yehova
    Mosala ya Bokonzi—2004 | Juillet
    • Tómekola bosembo ya Yehova

      1 ‘Yehova alingi bosembo.’ (Nz. 37:28) Yango wana, atako akani koboma mokili oyo ezangi boyengebene, azali naino kokebisa bato. (Mko. 13:10) Yango epesi bato nzela bábongola motema mpe bábika. (2 Pet. 3:⁠9) Tosalaka makasi tómekola bosembo ya Yehova? Ntango tomonaka bato bazali na mpasi mpe bazali konyokwama, toyokaka mposa ya koyebisa bango elikya ya Bokonzi? (Mas. 3:27) Soki tolingi bosembo, tokozala na mposa makasi ya kosala mingi na mosala ya kosakola.

      2 Tóteya kozanga kopona bilongi: Soki tozali koyebisa bato nyonso mikano ya Nzambe kozanga kopona bilongi, tozali ‘kosala na bosembo.’ (Mika 6:​8, NW) Tosengeli koboya ezaleli oyo biso bato ya kozanga kokoka tozalaka na yango ya kotalela bato kaka na ndenge oyo bazali komonana na miso. (Yak. 2:​1-4, 9) “Mokano na [Yehova] ezali ete bato ya ndenge nyonso bábika mpe bákóma na boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Tim. 2:⁠4) Solo ya Liloba ya Nzambe ekoki mpenza kobongola bomoi ya bato na ndenge ya kokamwa. (Ebe. 4:12) Soki toyebi bongo, tokobanga te kosolola na bato, ata baoyo baboyaki koyoka biso na mikolo eleki.

      3 Ndeko mwasi moko oyo azalaki kosala na magazini moko, azalaki mbala mingi kobanga kiliya moko oyo azalaki kosomba biloko mingi epai na bango mpo na ndenge oyo azalaki komona mobali yango. Kasi, mokolo moko, ntango libaku ya malamu emonanaki, ndeko mwasi yango amekaki kopesa ye litatoli na ntina etali elaka ya Nzambe ya kokómisa mabelé Paladiso. Moto yango alobaki mbala moko ete andimaka masapo te, azali hippie mpe amɛlaka bangi. Kasi, ndeko mwasi alɛmbaki te. Mokolo moko, moto yango oyo azalaki na nsuki ya milai atunaki ndeko mwasi soki akanisi nini mpo na nsuki na ye, mpe ndeko mwasi alimbolelaki ye na mayele mpenza likanisi ya Biblia na likambo yango. (1 Kol. 11:14) Ndeko mwasi akamwaki mpenza ntango amonaki moto yango mokolo elandi akati mandɛfu mpe akati nsuki! Moto yango asɛngaki abanda koyekola Biblia, mpe ndeko mobali moko andimaki na esengo mpenza koyekola na ye; akolaki na elimo tii amipesaki mpe azwaki batisimo. Lokola mobali wana, bandeko mingi oyo bazali kosalela Yehova lelo oyo bazali na botɔndi mpenza ndenge bandeko oyo bateyaki bango nsango ya Bokonzi baponaki bilongi te mpe balɛmbaki te kosalisa bango.

      4 Mosika te, Yehova akolongola bato nyonso oyo bazangi boyengebene na mabelé. (2 Pet. 3:​10, 13) Na mwa ntango moke oyo etikali, tiká ete tómekola bosembo ya Yehova mpe tópesa bato nyonso libaku ya kobika ntango mokili mabe ya Satana ekobomama.​—⁠1 Yoa. 2:17.

  • Eteni 1​—Tótambwisa boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ekosalisa bato bákola
    Mosala ya Bokonzi—2004 | Juillet
    • Eteni 1​—Tótambwisa boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ekosalisa bato bákola

      Boyekoli ya Biblia ezali nini?

      1 Na mokili mobimba, basaleli ya Nzambe bazali kotambwisa boyekoli ya Biblia koleka milio 6 sanza nyonso. Soki tozali kosalela mayele ya koteya, tokoki kosalisa bayekoli ya Biblia yango bákola tii bakomipesa na Nzambe mpe bakozwa batisimo, mpe bakokóma bato oyo “bakoki mpenza mpo na koteya bamosusu.” (2 Tim. 2:⁠2) Okosepela kosalisa moyekoli na yo ya Biblia mpo akola bongo na elimo? Kobanda na nimero oyo, Mosala na biso ya Bokonzi ekozala na masolo oyo ekolimbola makambo ya ntina oyo tosengeli kosala mpo na kotambwisa boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ekosalisa bato bákola.

      2 Ntango nini tokoki kotánga boyekoli ya Biblia: Soki ozali kosolola na moto moko mbala na mbala na Biblia, ata soki bolekisi ntango mingi te, kasi soki bosaleli Biblia ná mokanda moko oyo ebongisami mpo na koyekola na bato Biblia, ozali kotambwisa boyekoli ya Biblia. Yango ezali mpenza bongo ata soki bosololaka kaka na porte ya ndako na ye to na telefone. Tokotánga boyekoli soki toyekoli na moto moko mbala mibale nsima ya koyokana mpe kolakisa ye ndenge boyekoli esalemaka, mpe soki tomoni ete moto yango akokoba koyekola.

      3 Tosalelaka mwa buku Azali kosɛnga mpe buku Boyebi mpo na koyekola Biblia na bato mingi. Soki nsima ya koyekola babuku yango, moto amonisi mpenza ete azali kokola, ata soki azali kokola malɛmbɛmalɛmbɛ mpe azali kosepela mingi na makambo oyo azali koyekola, tokoki kokoba koyekola na ye na buku Tósambela Nzambe. Tokoki kosalela mwa buku Okoki kozala moninga ya Nzambe! mpo na koyekola na bato oyo bakɔtá kelasi mingi te to oyo bayebi kotánga malamu te.

      4 Mosala ya koyekola Biblia na bato esalisi bamilio ya bato mpo bákóma bayekoli ya solo ya Yesu Klisto. (Mat. 28:​19, 20) Soki osaleli makanisi oyo bakopesa na masolo oyo ekolanda, okokoka kotambwisa boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ekosalisa bato bákola.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto