Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kosakola Bokonzi ezali mosala ya ntina mingi
    Mosala ya Bokonzi—2005 | Août
    • Kosakola Bokonzi ezali mosala ya ntina mingi

      1 Mokolo na mokolo, bamiliare ya bato awa na mabelé bazalaka na bomoi mpo na biloko oyo Yehova akabelaka bango. (Mat. 5:45) Nzokande, kaka bato moke nde bazali mpenza na libaku malamu ya kozongisa matɔndi epai ya Mozalisi na bango na kosakoláká nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. (Mat. 24:14) Otalelaka mpenza libaku malamu yango lokola eloko ya motuya mingi?

      2 Mosala ya kosakola Bokonzi ekumisaka Nzambe mpe epesaka elikya mpe kimya na bato oyo bazali komitungisa mpo na bantango ya yikiyiki oyo tozali. (Ebe. 13:15) Mosala yango ezali kopesa elikya ya bomoi ya seko epai ya baoyo bazali kondima nsango yango. (Yoa. 17:⁠3) Mosala nini mosusu epesaka bato matomba ya ndenge wana? Ntoma Paulo amonisaki polele ete mosala ya kosakola ezalaki na ntina mingi na miso na ye na lolenge azalaki kokokisa yango. Azalaki kotalela yango lokola eloko ya motuya.​—⁠Mis. 20:​20, 21, 24; 2 Kol. 4:​1, 7.

      3 Tómonisa botɔndi mpo na libaku malamu oyo tozali na yango: Lolenge moko ya komonisa ete libaku malamu oyo tozali na yango ya kosakola ezali na ntina mingi, ezali ya koluka kobongisa mosala na biso ya kosakola. Tozwaka mpenza ntango mpo na kobongisa lisolo oyo ekosimba mitema ya bato oyo bakoyoka biso? Tokoki nde kokolisa makoki na biso ya kosalela Makomami mpe ya kotinda bato bákanisa? Tosakolaka na bandako nyonso ya teritware oyo bapesi biso? Tokoki kobanda mpe kolanda koyekola na moto Biblia? Lokola baklisto ya sembo, ezala ya kala to ya ntango na biso, soki tokangi ntina ya mosala oyo, tokotalela libaku malamu oyo tozali na yango lokola eloko ya motuya.​—⁠Mat. 25:​14-23.

      4 Ntango ozali kobundana na mikakatano ya bobange, ya bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto, to na mikakatano mosusu, okobɔndisama na koyeba ete milende oyo tozali kosala mpo na kosakola ezali mpenza na motuya mingi. Liloba ya Nzambe esalisi biso tóyeba ete Yehova azwaka na motuya mingi milende ya baoyo bazali kosalela ye, ata soki milende yango emonani polele te na miso ya bato mosusu.​—⁠Luka 21:​1-4.

      5 Mosala ya kosakola Bokonzi epesaka esengo mingi. Ndeko mwasi moko oyo azali na mbula 92, alobaki boye: “Soki nakanisi mbula koleka 80 oyo nalekisi na mosala ya Nzambe, namonaka mpenza ete nazalaki na libaku malamu; nayokaka mawa te! Ya solo, soki nakokaki kobandela bomoi na ngai, nakopona nzela se moko wana, mpamba te ‘boboto ya Nzambe eleki ata bomoi.’ ” (Nz. 63:⁠3) Tiká ete biso mpe tózwa na motuya mingi libaku wana oyo Nzambe apesi biso: mosala ya kosakola Bokonzi.

  • Tótambwisa boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ekosalisa bato bákola
    Mosala ya Bokonzi—2005 | Août
    • Tótambwisa boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ekosalisa bato bákola

      Eteni 12: Tósalisa bayekoli bábanda mpe bálanda koyekola na bato Biblia

      1 Ntango bato oyo toyekolaka na bango Biblia babandi kobima na mosala ya kosakola, likanisi ya kobanda mpe kolanda koyekola na bato mosusu Biblia bango moko ekoki kobangisa bango. Ndenge nini tokoki kosalisa bango bábanga te kosangana na eteni wana ya ntina mingi ya mosala na biso?​—⁠Mat. 24:14; 28:​19, 20.

      2 Ntango moyekoli ya Biblia akokisi masɛngami mpo na kokóma mosakoli oyo azwi naino batisimo te, yango elingi koloba asalaka masolo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Formasyo oyo azali kozwa ntango azali kobongisa mpe kosala masolo na eteyelo yango ekosalisa ye akolisa makoki ya koteya oyo esengeli mpo na kokóma “mosali oyo azali na eloko moko te ya koyokela nsɔni, oyo azali kosembola liloba ya solo malamumalamu.”​—⁠2 Tim. 2:⁠15.

      3 Ndakisa na yo ekoteya ye: Yesu apesaki bayekoli na ye formasyo na malako ya polele oyo apesaki bango mpe na ndakisa na ye ya malamu. Alobaki ete: “Moto nyonso oyo alakisami malamumalamu akozala lokola moteyi na ye.” (Luka 6:40) Ezali na ntina mingi olanda ndakisa ya Yesu, elingi koloba yo moko ozala ndakisa malamu na mosala ya kosakola. Ntango moto oyo boyekolaka na ye akotala ndakisa na yo na mosala ya kosakola, akokanga ntina ete bazongelaka bato mpo na kobanda koyekola na bango Biblia.

      4 Limbolelá ye ete ntango tosɛngi moto mpo tóyekola na ye Biblia, ezalaka mpenza na ntina te koyebisa ye makambo nyonso tosalaka mpo na koyekola. Mbala mingi, esɛngaka kaka koyekola na ye mbala moko paragrafe moko to mibale ya mokanda oyo tokoyekola mpo na komonisa ye ndenge toyekolaka. Tokoki kokuta makanisi mosusu oyo ekosalisa biso na kosala bongo na Mosala na biso ya Bokonzi oyo, na lokasa 8 mpe na Mosala na biso ya Bokonzi ya Yanuali 2002, na lokasa 6.

      5 Soki ebongi, bengá moto oyo boyekolaka na ye Biblia bóbima na ye to abima na mosakoli mosusu ya makoki mpo na koyekola Biblia na bato mosusu. Akoki kopesa makanisi na paragrafe moko to na mokapo moko ya ntina. Na ndenge wana, lokola azali komona, akoyekola makambo mingi mpo na kotambwisa boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ekosalisa bato bákola. (Mas. 27:17; 2 Tim. 2:2) Pesá ye longonya mpe sololá na ye na bisika oyo asengeli kobongisa.

      6 Kopesa basakoli ya sika formasyo mpo bákóma bateyi ya Liloba ya Nzambe, ekobongisa bango mpo na ‘mosala malamu’ ya kobanda mpe kolanda koyekola na bato bango moko. (2 Tim. 3:17) Ezali mpenza esengo kosala elongo na bango mpo na kobengisa bato na bolingo nyonso ete: “Tiká moto nyonso oyo alingi, akamata mai ya bomoi ofele”!​—Emon. 22:17.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto