Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ‘Toleisami na maloba ya kondima’
    Mosala ya Bokonzi—2005 | Janvier
    • ‘Toleisami na maloba ya kondima’

      1 Mpo na kozala na bomoi ya moto oyo amipesi na Nzambe, esɛngaka kosala milende. (1 Tim. 4:7-10) Soki tozali koluka kozala na bomoi ya ndenge wana na makasi na biso moko, tokoumela te kolɛmba mpe kokwea. (Yis. 40:​29-31) Lolenge moko oyo tokoki kozwa makasi epai ya Yehova ezali ya ‘komileisa na maloba ya kondima.’—1 Tim. 4:6.

      2 Ebele ya bilei ya elimo: Yehova apesaka biso ebele ya bilei ya elimo na nzela ya Liloba na ye mpe ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Mat. 24:45) Tosalaka nyonso oyo ekoki mpo na kolya bilei yango malamu? Totángaka Biblia mokolo na mokolo? Tomibombelaka ntango mpo na koyekola mpe komanyola? (Nz. 1:2, 3) Kolya malamu bongo na elimo epesaka biso makasi mpe ebatelaka biso mpo mokili ya Satana elɛmbisa biso te. (1 Yoa. 5:19) Soki totondisi makanisi na biso na makambo ya malamu mpe tosaleli yango na bomoi na biso, Yehova akozala elongo na biso.—Filp. 4:8, 9.

      3 Yehova apesaka biso makasi mpe na nzela ya makita ya lisangá. (Ebe. 10:24, 25) Mateya ya elimo oyo tozwaka na makita yango mpe baninga ya malamu oyo tokutanaka na bango, bapesaka biso makasi ya koyika mpiko na mimekano. (1 Pet. 5: 9, 10) Elenge moklisto moko alobaki boye: “Nalekisaka mokolo mobimba na kelasi, mpe yango elɛmbisaka ngai mingi. Kasi, makita ezalaka lokola esika oyo ezali na mwa banzete mpe mai na kati ya esobe, kuna nazwaka makasi mpo na koyika mpiko na kelasi na mokolo oyo ekolanda.” Talá ndenge milende oyo tosalaka mpo na koyangana na makita ememelaka biso mapamboli!

      4 Kosakola solo: Mpo na Yesu, kosakola ezalaki lokola bilei. Yango ezalaki kopesa ye makasi. (Yoa. 4:32-34) Biso mpe tozwaka lisusu makasi ntango toyebisaka basusu bilaka kitoko ya Nzambe. Lisusu, kosakola na molende esalisaka biso tótya ntango nyonso motema mpe makanisi na biso na Bokonzi mpe na mapamboli oyo etikali moke eya. Yango epemisaka biso mpenza.—Mat. 11:28-30.

      5 Oyo nde libaku malamu tozali na yango ya kozwa litomba na ebele ya bilei ya elimo oyo Yehova azali kopesa basaleli na ye lelo oyo! Tiká tókoba koganga na esengo mpo na lokumu na ye.—Yis. 65:13, 14.

  • Eteni 5​—Tótambwisa boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ekosalisa bato bákola
    Mosala ya Bokonzi—2005 | Janvier
    • Eteni 5​—Tótambwisa boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ekosalisa bato bákola

      Ndenge ya koyeba baparagrafe boni bokoyekola

      1 Ntango Yesu azalaki koteya bayekoli na ye, azalaki kotalela makoki na bango, azalaki koloba na bango “na meko oyo bazalaki na likoki ya koyoka.” (Mko. 4:33; Yoa. 16:12) Lelo oyo mpe, bateyi ya Liloba ya Nzambe basengeli koyeba baparagrafe boni basengeli koyekola na moto na boyekoli moko. Yango ekotalela makoki mpe makambo ya bomoi ya moteyi mpe ya moyekoli.

      2 Tongá kondima ya makasi: Mpo na bato mosusu, ekoki kosɛnga koyekola likambo moko mbala mibale to misato mpo bákanga ntina na yango; nzokande, basusu bakoki kokanga ntina mbala moko mpamba. Tosengeli te kowela kosilisa mokanda, nzokande moyekoli azali kokanga ntina ya makambo oyo azali koyekola te. Moyekoli nyonso asengeli koyeba mateya ya ntina mpo na kotonga kondima na ye na Liloba ya Nzambe.—Mas. 4:7; Lom. 12:2.

      3 Ntango ozali kotambwisa boyekoli pɔsɔ na pɔsɔ, zwáká ntango oyo esengeli mpo na kosalisa moyekoli akanga ntina ya makambo oyo azali koyekola na Liloba ya Nzambe mpe andima yango. Kotambwisa boyekoli mbangumbangu te mpo moyekoli akokanga ntina ya mateya ya solo malamu te. Zwá ntango oyo ebongi mpenza mpo na kolobela makanisi ya ntina mpe kotalela bavɛrsɛ oyo esimbi mateya.—2 Tim. 3:16, 17.

      4 Kobima na boyekoli te: Atako tosengeli kotambwisa boyekoli mbangumbangu te, tosengeli mpe koboya kolobela makambo kilikili. Soki moyekoli abandi kolobela makambo na ye moko, ekozala malamu tósɛnga ye alobela yango na nsuka ya boyekoli.—Mos. 3:1.

      5 Epai mosusu, esengo na biso mpo na solo ekoki kosala ete tókoka te kolobela makambo na mokuse ntango tozali koyekola na moto. (Nz. 145:6, 7) Na bantango mosusu, kolobela likanisi moko to lisolo moko oyo ezali na liteya te ekoki kosalisa moyekoli asimba liteya yango malamu, kasi soki makanisi to masolo yango eleki mingi to ekómi milaimilai, ekobulunganisa ye mpe akozwa boyebi ya sikisiki te ya mateya ya ntina ya Biblia.

      6 Soki tozali koyeba baparagrafe boni ebongi tóyekola na moto na moto, tokosalisa bato oyo tozali koyekola na bango Biblia ‘bátambola na pole ya Yehova.’—Yis. 2:5.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto