Loyembo 122
‘Tózala lokola bana mike’
1. Tika bango bakotosa
Yehova bázw’esengo!
Mpe bapambolami kati
Na misala na bango.
Mpo tozali basumuki,
Tóluka nde bopɔlɔ,
Ete tósalela Nzambe
Na bosembo na biso.
2. ‘Tózala lokola bana,’
Klisto alobi bongo.
Nde tozwi esengo kati
Na kimya mpe bomoko.
Yesu, ndakisa malamu.
Atosaki Nzambe, ee,
Ntango nyonso. Bipai binso,
Klist’asalelaki ye.
3. Tótonda na bwanya nyonso;
Tómemya bato banso!
Yesu’akufelaki biso,
Tozali nde bandeko.
Tozali bato ya Nzambe,
Mopesi na makabo.
Tózala lokola bana;
Tómekola nde Nkolo.
4. Tótosa bakonzi banso
Baleki liboso mpe
Tózalana na bolingo,
Yango’etindá ya Nzambe.
Tókangama na Yehova,
Motambwisi na biso.
Tokozwa elimo na ye,
Mpe akosunga biso.