LITEYA 32
Komonisa ete ozali mpenza kondima makambo ozali koloba
NTANGO moto azali komonisa na ndenge azali koloba ete azali kondima mpenza likambo oyo azali koloba, bato mosusu bakomona mpe ete azali kondima likambo yango. Na mosala na ye ya kosakola, Paulo mpe amonisaki ete azalaki kondima mpenza makambo oyo azalaki koloba. Akomelaki bato oyo bakómaki bandimi na Tesaloniki boye: “Nsango malamu oyo tozali kosakola eyaki epai na bino kaka na maloba te, kasi mpe na . . . kondimisama makasi.” (1 Tes. 1:5) Kondima ndenge wana emonanaki na lolenge na ye ya koloba mpe na bomoi na ye. Kondima ya ndenge yango mpe esengeli komonana ntango tozali koteya solo ya Biblia.
Komonisa ete ozali kondima mpenza likambo moko elimboli te kokangama kaka na makanisi na yo moko, kotya mibeko na yo moko, to komikumisa. Kasi ntango azali kolobela makambo oyo euti na Liloba ya Nzambe, moto oyo azali mpenza kondima makambo oyo azali koloba amonisaka yango na elobeli na ye.—Ebe. 11:1.
Ntango oyo tosengeli komonisa ete tozali mpenza kondima makambo oyo tozali koloba. Ntango ozali na mosala ya kosakola, ezali na ntina mingi ete omonisa ete ozali mpenza kondima makambo ozali koloba. Mbala mingi, bato bayokaka kaka nsango oyo ozali komema te, kasi batalelaka mpe elobeli na yo. Bamonaka ndenge oyo yo moko ozali kotalela makambo oyo ozali koloba. Soki ozali komonisa ete ozali mpenza kondima makambo oyo ozali koloba, yango ekozala na ntina mingi koleka maloba yango moko mpe ekoki kosalisa bango bámona ete ozali na likambo moko ya ntina mingi ya koyebisa bango.
Ntango tozali koloba na bato ebele oyo bazali bandeko na biso baklisto, tosengeli mpe komonisa ete tozali mpenza kondima makambo tozali koloba. Ntoma Petelo akomaki mokanda na ye ya liboso oyo epemami “mpo na kopesa elendiseli mpe litatoli moko ya molende ete wana ezali boboto monene ya solosolo ya Nzambe.” Na mokanda yango, alendisaki bandeko ete: “Bótɛlɛma ngwi.” (1 Pet. 5:12) Ntango akomelaki lisangá ya Loma, ntoma Paulo amonisaki ete azalaki mpenza kondima makambo oyo akomaki mpe yango esalisaki bango. Akomaki boye: “Nandimi solo ete ezala liwa to bomoi to baanzelu to baguvɛrnema to makambo ya sikoyo to makambo oyo ekoya to banguya to bosanda to bozindo to ekelamu nini mosusu ekokoka te kokabola biso na bolingo ya Nzambe oyo ezali na kati ya Klisto Yesu Nkolo na biso.” (Lom. 8:38, 39) Paulo asimbaki mpe mitema ya bato ntango akomaki mpo na komonisa ntina ya kosakola epai ya bato mosusu; molende na ye moko na mosala wana emonisaki polele ete ye moko andimaki mpenza ntina ya mosala yango. (Mis. 20:18-21; Lom. 10:9, 13-15) Lelo oyo, bankulutu baklisto basengeli mpe komonisa mpenza kondima ndenge wana, ntango bazali koteya Liloba ya Nzambe.
Ntango bazali koyekola mpe na bantango mosusu, baboti basengeli mpe komonisa ete bazali mpenza kondima makambo ya elimo oyo bazali kosolola na bana na bango. Yango esɛngi ete baboti bango moko, na mitema na bango, bálinga Nzambe mpe nzela na ye. Soki basali bongo nde bakomonisa ete bazali mpenza kondima makambo oyo bazali koloba na bana na bango, ‘mpo uta na makambo oyo etondi na motema nde monɔkɔ elobaka.’ (Luka 6:45; Det. 6:5-7) Soki baboti bazali mpenza kondima ndenge wana, yango ekotinda bango bázala ndakisa mpo na oyo etali “kondima oyo ezangi bokosi.”—2 Tim. 1:5.
Ezali na ntina mingi ete oloba mpenza na kondima ntango okutani na komekama mpo na kondima na yo. Mbala mosusu, moninga moko ya kelasi, molakisi, to moninga moko ya mosala akoki kokamwa ete ozali kosangana na molulu moko boye te. Soki opesi eyano malamu mpe na motema moko, yango ekoki kosalisa ye amemya likanisi ya Biblia. Bongo soki moto moko alingi kobenda yo osala likambo moko ya mabe, na ndakisa kobuba, komɛla bangi to kosala pite? Ezali na ntina mingi omonisa polele ete okomeka ata moke te kosala yango mpe ata asali nini, akobongola makanisi na yo te. Yango esɛngi ete omonisa mpenza kondima ntango ozali koloba mpo na koboya makanisi na ye. Ntango Yozefe aboyaki kosangisa nzoto na mwasi ya Potifala, alobaki na motema moko ete: “Bongo nakoka kosala mabe monene oyo mpe kosala lisumu epai ya Nzambe boni?” Lokola mwasi yango azalaki kotika te kobenda ye na kosala mabe, Yozefe akimaki mpe abimaki na ndako.—Gen. 39:9, 12.
Ndenge ya komonisa ete ondimi mpenza likambo moko. Maloba oyo ozali kosalela nde ekoki mpenza komonisa soki ozali mpenza kondima likambo moko. Mbala mingi, mpo na komonisa ete makambo oyo azalaki koloba ezalaki na ntina mingi, Yesu azalaki liboso koloba ete: “Ya solo mpenza nazali koloba na yo” to “Ya solo mpenza nazali koloba na bino.” (Yoa. 3:3, 5, 11; 5:19, 24, 25) Mpo na komonisa ete azalaki mpenza kondima makambo oyo azalaki koloba, Paulo azalaki kosalela maloba lokola “nandimi solo ete,” “nayebi mpe nandimi mpenza na kati ya Nkolo Yesu ete” mpe “nazali koloba solo, nazali kokosa te.” (Lom. 8:38; 14:14; 1 Tim. 2:7) Na bantango mosusu, mpo na komonisa ete liloba na ye ekokokisama, Yehova apesaki basakoli na ye elimo na ye mpo na komonisa yango na maloba ya polele, na ndakisa maloba lokola “ekozanga te.” (Hab. 2:3) Yo mpe ntango ozali kolobela bisakweli yango, okoki kosalela elobeli ya ndenge wana. Soki ozali komityela motema te, kasi ozali kotalela Yehova mpe soki ozali koloba na bato mosusu na limemya mpenza, maloba oyo okosalela ekomonisa polele ete ozali mpenza kondima makambo ozali koloba.
Mposa makasi oyo ozali na yango mpo na koloba likambo mpe lolenge oyo ozali koloba yango ekoki mpe komonisa ete ozali mpenza kondima likambo yango. Yango ekomonana na elongi na yo, na bajɛstɛ oyo ozali kosala mpe ndenge ozali koningisa nzoto, atako moto na moto azalaka na ndenge na ye ya kosala bajɛstɛ. Ata soki ozali moto ya nsɔninsɔni to olobaka mingi te, ntango oyo yo moko ondimi mpenza ete makambo oyo ozali koloba ezali solo mpe ete basusu basengeli koyoka yango, ekomonana polele ete ozali mpenza kondima yango.
Ya solo, maloba nyonso oyo tokoki kobimisa mpo na komonisa ete tozali mpenza kondima makambo tozali koloba esengeli mpenza kouta na motema. Soki bato bamoni ete oyo tozali koloba ezali kaka maloba mpamba mpe euti na motema na biso te, bakosukisa ete nsango na biso ezali na ntina moko te. Yango wana, salá nyonso ete ozala ndenge ozalaka. Soki ozali koloba liboso ya bato ebele, ekosɛnga mbala mosusu ete oloba na mongongo makasi mpe na nguya koleka ndenge omeseni koloba. Kasi mokano na yo esengeli kozala ete oloba na motema moko mpe ndenge omeseni koloba.
Makambo oyo ekosalisa yo omonisa ete ozali mpenza kondima makambo ozali koloba. Mpo omonisa ete ozali mpenza kondima makambo ozali koloba, yango etalaka mpe ndenge oyo ozali kotalela makambo oyo okoloba; yango wana, osengeli komibongisa malamu. Ekoki kaka te kozwa makambo na mokanda moko mpe na nsima kozongela yango ndenge ezali. Osengeli kokanga ntina ya makambo yango mpe na nsima, koloba yango na maloba na yo moko. Osengeli mpenza kondima ete ezali ya solo mpe ete makambo oyo ozali koloba ezali na ntina mingi mpo na bato oyo bazali koyoka yo. Yango elimboli ete ntango ozali kobongisa lisolo na yo, otalela mpe bato oyo bakoyoka yo mpe makambo oyo bayebi na lisolo yango to ndenge oyo bakokanisa mpo na yango.
Ntango tozali koloba kozanga kokakatana, ezalaka mpasi te mpo basusu bámona soki tozali mpenza kondima makambo oyo tozali koloba. Yango wana, ntango osilisi kobongisa malamu makambo oyo okoloba na lisolo na yo, salá mpe makasi mpo na komibongisa na ndenge oyo okosala yango. Tyá mpenza likebi na bisika oyo esɛngi ete oloba na lisɛki te mpo okangama kaka na papye na yo te ntango okosala yango. Kobosana mpe te kobondela Yehova apambola milende na yo. Soki osali bongo, ‘okozwa mpiko na lisalisi ya Nzambe na biso’ mpo elobeli na yo emonisa ete ozali kondima mpenza ete nsango oyo ozali komema ezali nsango ya solo mpe ezali na ntina mingi.—1 Tes. 2:2.