-
Tózala sembo lokola ItaiLinɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2009 | 15 Mai
-
-
(Nz. 37:28, NW) Mpo na kosalisa biso tótikala sembo, Nzambe akomisi na kati ya Liloba na ye masolo ya basaleli na ye mingi ya kala oyo batikalaki sembo. Moko ya masolo yango ezali ya Itai, moto ya Gata.
‘Mopaya mpe moto atiká mboka’
Ekoki kozala ete Itai azalaki moto ya Gata, engumba ya Bafilistia oyo eyebanaki mingi, oyo ezalaki mpe engumba ya Goliata mpe ya banguna mosusu ya Bayisalaele ya nsɔmɔ. Mbala ya liboso oyo Biblia elobeli Itai, ezali ntango Abesaloma atombokelaki mokonzi Davidi. Itai, ná Bafilistia mosusu 600 oyo balandaki ye, bazalaki kofanda na zingazinga ya Yelusaleme.
Ekoki kozala ete ntango Davidi azalaki komona Itai ná bato na ye, azalaki kokanisa ntango ye ná basoda 600 ya Yisalaele bakendaki kobombama epai ya Akisi, mokonzi ya engumba Gata ya Bafilistia. (1 Sam. 27:2, 3) Itai ná bato na ye basalaki nini ntango Abesaloma atombokelaki Davidi, tata na ye? Bakɔtaki nde na ngámbo ya Abesaloma, baboyaki kokɔta likambo yango, to balandaki Davidi ná bato na ye?
Kanisá naino, Davidi azali kokima Yelusaleme mpe akómi na esika oyo babengi Bete-merake, oyo elimboli “Ndako Mosika.” Ekoki kozala ete yango ezalaki ndako ya nsuka na Yelusaleme, soki ozali kokende na Ngomba ya Olive, liboso ya kokatisa Lobwaku ya Kidolono. (2 Sam. 15:17) Awa, Davidi azalaki kotala basoda na ye wana bazalaki kokatisa. Likambo ya kokamwa, kaka Bayisalaele ya sembo te nde balandaki ye; ezalaki mpe na Bakelete mpe Bapelete nyonso. Lisusu, ezalaki mpe na bato nyonso ya Gata, elingi koloba, Itai ná basoda na ye 600.—2 Sam. 15:18.
Davidi ayokelaki Itai mawa mpe alobaki na ye boye: “Mpo na nini yo mpe oya na biso? Zongá mpe fandá na mokonzi [na ntembe te azalaki kolobela Abesaloma]; mpo ozali mopaya, mpe lisusu, otiká esika na yo mpe okimá na mboka mopaya. Kaka lobi nde oyaki, bongo lelo nakende na yo koyengayenga elongo na biso, mpo okende ntango ngai nakokende mpe esika nyonso oyo nakokende? Zongá mpe zwá bandeko na yo bázonga elongo na yo, mpe tiká Yehova amonisela yo motema boboto mpe bosembo!”—2 Sam. 15:19, 20, NW.
Mpo na komonisa bosembo na ye, Itai alobaki boye: “Lokola Yehova azali solo na bomoi mpe lokola nkolo na ngai mokonzi azali solo na bomoi, na esika nyonso oyo nkolo na ngai mokonzi akozala, ezala mpo na liwa to mpo na bomoi, kuna nde mosaleli na yo akozala!” (2 Sam. 15:21, NW) Ekoki kozala ete maloba yango ekundwelaki Davidi maloba ya nkɔkɔ na ye Luta. (Luta 1:16, 17) Maloba ya Itai esimbaki motema ya Davidi mpe alobaki na ye boye: “Kende mpe katisá” Lobwaku ya Kidolono. Na yango, “Itai moto ya Gata akatisaki, ná bato na ye nyonso mpe bana nyonso oyo bazalaki elongo na ye.”—2 Sam. 15:22, NW.
“Mpo na kolakisa biso”
Baloma 15:4 elobi ete: “Makambo nyonso oyo ekomamaki kala ekomamaki mpo na kolakisa biso.” Na yango ekozala malamu tómituna, liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Itai? Tótala likambo oyo etindaki ye azala sembo epai ya Davidi. Atako atikaki mboka na ye, Filistia, mpe akimaki na mboka mopaya, Itai andimaki ete Yehova azali Nzambe ya bomoi mpe ete Davidi azalaki moponami na ye. Itai alandaki te koyinana oyo ezalaki kati na Bafilistia mpe Bayisalaele. Azalaki kotalela Davidi kaka te lokola moto oyo abomaki Goliata mpe ebele ya bato mosusu ya mboka na ye. (1 Sam. 18:6, 7) Itai azalaki kotalela Davidi lokola moto oyo azalaki kolinga Yehova mpe na ntembe te amonaki bizaleli malamu ya Davidi. Davidi mpe akómaki kosepela na Itai mingi. Kutu, Davidi atyaki ndambo ya misato ya basoda na ye “na mabɔkɔ ya Itai” mpo na kobundisa basoda ya Abesaloma!—2 Sam. 18:2, NW.
Biso mpe tosengeli kosala makasi tómonaka bizaleli malamu ya basusu, tómonaka bango kaka te lokola bato ya mposo, to ekólo boye to boye. Bolingo oyo ekolaki kati na Davidi ná Itai emonisi ete koyeba mpe kolinga Yehova ekoki kosalisa biso tótalaka te makambo oyo ekoki kokabola biso ná bato mosusu.
Wana tozali kokanisa ndakisa ya Itai, tómituna boye: ‘Ngai mpe nazalaka sembo ndenge wana epai ya Yesu Klisto, Davidi Monene? Nasalaka na molende mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli mpo na komonisa bosembo na ngai?’ (Mat. 24:14; 28:19, 20) ‘Nakondima koyika mpiko tii wapi mpo na komonisa bosembo na ngai?’
Batata ya mabota bakoki mpe kozwa liteya na bosembo ya Itai. Bosembo na ye epai ya Davidi mpe ekateli na ye ya kolanda mokonzi oyo Nzambe aponaki etindaki mpe bato na ye básala lokola ye. Ndenge moko mpe, bikateli oyo batata ya mabota bazwaka mpo na kosimba losambo ya solo etindaka mpe mabota na bango bálanda yango, mpe ntango mosusu yango ekoki komemela bango mikakatano mpo na mwa ntango. Kasi, Biblia epesi biso elikya oyo: ‘Epai ya moto ya sembo [Yehova] akozala sembo.’—Nz. 18:25, NW.
Nsima ya etumba ya Davidi ná Abesaloma, Biblia elobeli lisusu Itai te. Nzokande, mwa lisolo na ye oyo ezali na Liloba ya Nzambe esalisi biso tóyeba ezaleli oyo amonisaki na ntango wana ya mpasi na bomoi ya Davidi. Ndenge Biblia elobeli Itai emonisi ete Yehova amonaka moto oyo azali sembo mpe apambolaka ye mpo na ezaleli yango.—Ebe. 6:10.
-
-
Ntina oyo tosengeli “kolanda Klisto”Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2009 | 15 Mai
-
-
Ntina oyo tosengeli “kolanda Klisto”
“Soki moto alingi kolanda ngai, tiká amiboya ye moko . . . mpe alanda ngai ntango nyonso.”—LUKA 9:23.
1, 2. Mpo na nini ebongi tóyeba ntina oyo tosengeli kolanda “Klisto”?
YEHOVA asepelaka mpenza ntango amonaka bino bilenge mpe bato ya sika na kati ya ebele ya basaleli na ye! Wana bozali kokoba koyekola Biblia, koyangana na makita, mpe kokola na boyebi ya solo ya Liloba ya Nzambe oyo ezali kobikisa bomoi ya bato, bóbosanaka te maloba ya Yesu oyo: “Soki moto alingi kolanda ngai, tiká amiboya ye moko mpe amema nzete na ye ya mpasi mokolo na mokolo mpe alanda ngai ntango nyonso.” (Luka 9:23) Yesu alingaki koloba ete komiboya mpe kokóma moyekoli na ye ezali likambo oyo tosengeli kosala. Na yango, tosengeli mpenza koyeba ntina oyo ebongi tólanda “Klisto.”—Mat. 16:13-16.
2 Ezali boni mpo na baoyo babandá kolanda Yesu Klisto eleki sikoyo bambula mingi? Biblia elobi boye: “Bókoba kosala bongo malamumalamu lisusu.” (1 Tes. 4:1, 2) Ata soki touti koyamba solo sika to tozali na kati ya solo esili koleka bambula mingi, kokanisa bantina oyo tosengeli kolanda Klisto, ekosalisa biso tólanda toli ya Paulo mpe tólanda Yesu malamumalamu lisusu na bomoi na biso. Tótalela naino bantina mitano oyo tosengeli kolanda Klisto.
Ekokolisa boyokani na biso na Yehova
3. Wapi ndenge mibale oyo tokoki koyeba Yehova?
3 Ntango azalaki kosolola na bato ya Atene wana ‘atɛlɛmaki na katikati ya Aleopaji,’ ntoma
-