Komikitisa ya Yehova elimboli nini mpo na biso
DAVIDI azalaki moto moko oyo akutanaki na mikakatano mingi na bomoi na ye. Bokilo na ye, Mokonzi Saulo, azalaki koyokela ye zuwa mpe konyokola ye. Mbala misato, Saulo alukaki koboma Davidi na likɔnga, mpe na boumeli ya bambula azalaki kolukaluka ye mpe ye azalaki kokimakima. (1 Samwele 18:11; 19:10; 26:20) Kasi, Yehova azalaki na Davidi. Yehova abikisaki ye na mabɔkɔ ya Saulo mpe ya banguna na ye mosusu. Na kotalela nyonso wana ,tokoki kokanga ntina ya maloba oyo Davidi ayembaki na nzembo boye: “[Yehova] azali libanga na ngai, esika makasi na ngai mpe mobikisi na ngai. [Yehova] opesi . . . ngai nguba ya kobikisama na yo, [komikitisa] na yo ekembisi ngai.” (2 Samwele 22:2, 36) Davidi asalaki makambo ya minene ebele na Yisalaele. Kasi, ndenge nini komikitisa ya Yehova emonanaki?
Ntango Biblia ezali koloba ete Yehova azali na komikitisa, yango elingi koloba te ete azali na bolɛmbu moko boye to azali na nse ya basusu. Ezaleli malamu wana ezali komonisa nde ete azalaka motema mawa mpe motema boboto mpo na bato oyo balukaka mpenza kosepelisa ye. Na Nzembo 113:6, 7 totángi boye: “[Yehova] akomikitisa mpo na kotala epai na lola mpe kati na nse. [Akotombola] mobola na mputulu.” ‘Komikitisa’ na ye elimboli ete azali “kongunzama mpo na komona.” (Today’s English Version) Yango elingi koloba ete kuna esika azali, Yehova ‘angunzamaki’ mpo na kotya likebi epai ya Davidi, moto ya kozanga kokoka kasi ya komikitisa oyo azalaki mpenza na mposa ya kosalela Nzambe. Yango wana Davidi ayebisi biso boye: “Yehova azali na likoló, kasi amonaka moto ya komikitisa.” (Nzembo 138:6, NW) Ndenge Yehova amoniselaki Davidi motema boboto, motema molai mpe motema mawa esengeli kolendisa bato nyonso oyo balukaka kosala mokano ya Nzambe.
Atako Yehova azali Mokonzi oyo aleki na molɔ́ngɔ́ mobimba, alingaka koyokana na mokomoko na biso. Yango ezali kosalisa biso tóyeba ete, ata soki tokutani na mikakatano ya ndenge nini akozanga te kosalisa biso. Ezali na ntina te tókanisa ete akobosana biso. Talá ntina oyo bato ya Yisalaele balobaki ete Yehova ‘akanisaki biso ntango tozalaki na nse, mpo motema mawa na ye ekoumela seko.’—Nzembo 136:23, NW.
Lelo oyo, biso basaleli ya Yehova mpe tokoki kokutana na mikakatano lokola Davidi. Ekoki kozala ete bato oyo bayebi Nzambe te bazali kotyola biso, to ntango mosusu tozali konyokwama na maladi to mpe tozali na mawa mpo tokufeli moto moko oyo tolingaka. Ata tozali na likambo nini, soki motema na biso ezali sembo, tokoki kobondela Yehova mpo ayokela biso mawa. Yehova ‘akongunzama’ mpo na komona mpasi na biso mpe akoyoka mabondeli na biso. Mokomi ya nzembo alobaki boye: “Miso ya [Yehova] ekotalaka bato ya boyengebene mpe matoi na ye ekoyokaka koganga na bango.” (Nzembo 34:15) Soki totali ndenge Yehova amonisaka ezaleli malamu wana ya komikitisa, yango ekosimba mitema na biso!
[Bililingi na lokasa 30]
Yehova akoyoka mabondeli na biso lelo ndenge kaka ayokaki oyo ya Davidi