Loyembo 87
Sikoyo tokómi moto moko
Ya Papye
1. Oyo mpenza mok’wa na nga’,
Moninga mpe mosuni na nga’.
Nzamb’apesi nga’ mosungi,
Oyo nde ngai mpenza.
Nzoto moko ye ná ngai
Se ndenge Yehova alingi.
Libota moko ya sika,
Yango nde tokómi.
Ngai ná yo tokosalela Yah.
Bolingo’a solo,
Nkolo’ateyi nde bongo.
Tókokisa nde bilako.
Tokozala mpe na esengo.
Ɛɛ, tókumisa Yehova,
Mpe okozala se wa nga’.
(Talá mpe Eba. 29:18; Mos. 4:9, 10; 1 Ko. 13:8.)