Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • rs lok. 166-lok. 169
  • Ekaniseli (Bilei ya mpokwa ya Nkolo)

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ekaniseli (Bilei ya mpokwa ya Nkolo)
  • Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini kokanisa Bolei ya mpokwa ya Nkolo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • ‘Bósala boye mpo na kokanisa ngai’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Ndenge nini kokanisa bolei ya mpokwa ya Nkolo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mpo na nini Batatoli ya Yehova basalaka elambo ya Nkolo ndenge moko te na mangomba mosusu?
    Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
Makambo mosusu
Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
rs lok. 166-lok. 169

Ekaniseli (Bilei ya mpokwa ya Nkolo)

Ndimbola: Bilei oyo ekundwelaka biso liwa ya Yesu Kristo; to ekaniseli ya liwa na ye, liwa yango ezali na ntina mingi koleka liwa ya moto mosusu nyonso. Yango nde likambo kaka moko oyo Nkolo Yesu Kristo asɛngaki bayekoli na ye bákanisaka. Babengaka yango mpe Elambo ya Nkolo, to Bilei ya mpokwa ya Nkolo.​—1 Ko. 11:20.

Ekaniseli ezali na ndimbola nini?

Yesu alobaki na bantoma na ye ya sembo ete: “Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.” (Luka 22:19) Ntango ntoma Paulo akomelaki bakristo oyo batyami mafuta na elimo, abakisaki ete: “Mbala nyonso oyo bozali kolya limpa oyo mpe komɛla kɔpɔ oyo, bozali kokoba kosakola liwa ya Nkolo, tii ntango akoya.” (1 Ko. 11:26) Yango wana, Ekaniseli ebendaka likebi na biso na likambo monene oyo liwa ya Yesu Kristo ekokisaki na mokano ya Yehova. Emonisaka likambo oyo liwa ya mbeka ya Yesu ekokisaki, mingimingi na oyo etali kondimana ya sika mpe litomba oyo bazwi-ya-libula ya Bokonzi bakozwa na likoló elongo na ye.​—Yoa. 14:2, 3; Ebr. 9:15.

Ekaniseli ekundwelaka biso mpe ete liwa ya Yesu, mpe ndenge oyo babomaki ye, eyokani na mokano ya Nzambe ndenge emonisami na Ebandeli 3:15 mpe na bavɛrsɛ mosusu; mpe liwa yango esantisaki nkombo ya Yehova. Lokola Yesu atikalaki sembo epai na Yehova tii liwa, amonisaki ete soki Adama asalaki lisumu, ezali te mpo Nzambe azalisaki ye na mbeba moko boye. Kasi amonisaki ete moto akoki kokangama mpenza na Nzambe ata ntango azali kokutana na mikakatano makasi. Na ndenge yango, Yesu alongisaki Yehova Nzambe ete azali Mozalisi mpe Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso na molɔ́ngɔ́ mobimba. Longola yango, Yehova akanaki ete Yesu akufa mpo na kopesa mbeka ya kokoka oyo esengeli mpo na kosikola bana ya Adama, mpe na nzela ya mbeka yango, bamiliare ya bato oyo bakondimela ye bázwa bomoi ya seko na paradiso awa na mabele, mpo na kokokisa mokano ya Yehova ya ebandeli mpe komonisa ete alingaka bato mingi.​—Yoa. 3:16; Eba. 1:28.

Na butu ya nsuka oyo Yesu alekisaki na mabele liboso akufa, azalaki na mokumba monene mpenza! Ayebaki likambo oyo Tata na ye ya likoló akanaki mpo na ye, kasi ayebaki mpe ete asengelaki kotikala sembo ntango akutani na komekama. Ayebaki lisusu ete soki alongi te, ekozala nsɔni mpo na Tata na ye mpe likama mpo na bato! Mpo na makambo nyonso oyo liwa na ye esengelaki kokokisa, ebongaki mpenza ete Yesu asɛnga bayekoli na ye bákanisaka liwa na ye.

Limpa ná vinyo oyo balekisaka na ntango ya Ekaniseli elimboli nini?

Mpo na limpa oyo ezangi levire oyo Yesu apesaki bantoma na ye ntango abandisaki Ekaniseli, alobaki boye: “Oyo elakisi nzoto na ngai.” (Mrk. 14:22) Limpa yango emonisaki nzoto na ye oyo ezangi lisumu, oyo apesaki mbeka mpo bato bázala na elikya ya bomoi ya seko. Na Ekaniseli, balobelaka mingi mbeka ya Kristo oyo na nzela na yango bato moke oyo Nzambe aponi, bazwi elikya ya koyangela elongo na Yesu na Bokonzi ya likoló.

Ntango Yesu apesaki bantoma na ye ya sembo vinyo, alobaki: “Oyo elakisi ‘makila ya kondimana’ na ngai, oyo ekosopama mpo na bato mingi.” (Mrk. 14:24) Vinyo yango emonisaki makila na ye moko. Bato oyo bakondimela makila oyo Yesu asopaki bakoki kolimbisama masumu na bango. Na libaku yango, Yesu amonisaki ete makila na ye ekopɛtola masumu ya bazwi-ya-libula oyo bakozala elongo na ye na Bokonzi ya likoló. Maloba na ye emonisaki mpe ete na nzela ya makila yango kondimana ya sika oyo Yehova Nzambe akosala na bakristo oyo batyami mafuta na elimo ekobanda kosala mosala.

Talá mpe na nkasa 373-375, na motó ya likambo “Misa.”

Nani asengeli kolya limpa mpe komɛla vinyo na Ekaniseli?

Nani alyaki limpa mpe amɛlaki vinyo ntango Yesu abandisaki Bilei ya mpokwa ya Nkolo mwa moke liboso akufa? Ezalaki bayekoli ya sembo zomi na moko oyo Yesu ayebisaki ete: “Nazali kosala kondimana ná bino, ndenge mpe Tata na ngai asali kondimana ná ngai, mpo na bokonzi.” (Luka 22:29) Bango nyonso babyangamaki mpo na kozala na Kristo na Bokonzi ya likoló. (Yoa. 14:2, 3) Lelo oyo, baoyo nyonso balyaka limpa mpe bamɛlaka vinyo basengeli mpe kozala bato oyo Kristo akɔtisi na ‘kondimana mpo na bokonzi.’

Bato boni basengeli kolya limpa mpe komɛla vinyo? Yesu alobaki ete kaka “etonga moke” nde bakozwa mbano ya Bokonzi ya likoló. (Luka 12:32) Bango nyonso basengeli kozala bato 144 000. (Em. 14:1-3) Bato yango babandaki koponama na mobu 33 T.B. Na yango, tokoki koloba ete lelo oyo baoyo balyaka limpa mpe bamɛlaka vinyo bazali kaka moke.

Yoane 6:53, 54 emonisi ete kaka bato oyo balyaka limpa mpe bamɛlaka vinyo nde bakozwa bomoi ya seko?

Yoa. 6:53, 54: “Yesu alobaki na bango ete: ‘Ya solosolo mpenza, nalobi na bino ete: Soki bolei mosuni ya Mwana ya moto te mpe bomɛli makila na ye te, bozali na bomoi na kati na bino te. Moto oyo azali kolya mosuni na ngai mpe komɛla makila na ngai azwi bomoi ya seko, mpe nakosekwisa ye na mokolo ya nsuka.’”

Emonani ete kolya mosuni mpe komɛla makila oyo elobelami na vɛrsɛ yango ezali ya elilingi; soki bongo te, moto oyo asali yango abuki mobeko ya Nzambe. (Eba. 9:4; Mis. 15:28, 29) Nzokande, simbá ete ezali mikolo mingi liboso Yesu asala Elambo ya Nkolo nde alobaki maloba oyo ezali na Yoane 6:53, 54. Na kati ya bato oyo bazalaki koyoka Yesu ntango alobaki maloba yango, moko te ayebaki ete molulu moko ekosalema oyo bakosalela limpa ná vinyo mpo na komonisa nzoto ná makila ya Kristo. Likambo yango esalemaki soki mbula moko na nsima, mpo ntoma Yoane, na Evanzile oyo akomaki, alobeli Elambo ya Nkolo nsima ya mikapo nsambo (na Yoane 14).

Bongo, ndenge nini mosusu moto akoki ‘kolya mosuni ya Mwana ya moto . . . mpe komɛla makila na ye’ na ndenge ya elilingi soki alei limpa te to amɛli vinyo te na Ekaniseli? Simbá ete Yesu alobaki ete baoyo bakolya mosuni mpe bakomɛla makila na ye bakozala na “bomoi ya seko.” Liboso, na vɛrsɛ 40, ntango Yesu alimbolaki likambo oyo bato basengeli kosala mpo na kozwa bomoi ya seko, alobaki ete mokano ya Tata na ye ezali nini? Alobaki ete “moto nyonso oyo azali komona Mwana mpe azali kondimela ye azwa bomoi ya seko.” Na yango, emonani ete, ‘kolya mosuni mpe komɛla makila na ye’ na elilingi, elimboli kondima ete nzoto ya Yesu mpe makila na ye oyo apesaki mbeka, ezali na nguya ya kosikola. Bato nyonso oyo bakozwa bomoi ya kokoka, ezala na likoló elongo na Kristo to na Paradiso awa na mabele, basengeli kondimela mbeka yango.

Ekaniseli esengeli kosalema mbala boni na mbula, mpe ntango nini?

Yesu alobaki polele te mbala boni na mbula Ekaniseli esengeli kosalema. Alobaki kaka boye: “Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.” (Luka 22:19) Ntoma Paulo alobaki: “Mpo mbala nyonso oyo bozali kolya limpa oyo mpe komɛla kɔpɔ oyo, bozali kokoba kosakola liwa ya Nkolo, tii ntango akoya.” (1 Ko. 11:26) Maloba “mbala nyonso” elimboli kaka te ete likambo esengeli kosalema mbala mingi na mbula; ekoki kolimbola mbula na mbula na boumeli ya bambula mingi. Soki ozali kosala anivɛrsɛrɛ ya likambo moko ya ntina, na ndakisa, anivɛrsɛrɛ ya libala, to soki ekólo ezali kosala anivɛrsɛrɛ ya likambo moko monene oyo esalemaki na mboka, bakanisaka likambo yango mbala boni na mbula? Ezalaka mbala moko na mbula na dati oyo likambo yango esalemaki. Esengeli mpe kozala bongo mpo na Elambo ya Nkolo, oyo Yesu abandisaki na dati ya Elekeli ya Bayuda. Kasi Bayuda oyo bakómaki bakristo basengelaki kosala lisusu te molulu ya Elekeli ya mbula na mbula.

Bataloli ya Yehova basalaka Ekaniseli na dati ya 14 Nisana, nsima ya kolala ya moi, balandaka manaka oyo Bayuda bazalaki kosalela mingi na siɛklɛ ya liboso. Epai ya Bayuda, mokolo ebandaka na kolala ya moi tii kolala ya moi ya mokolo oyo elandi. Bongo soki tolandi manaka yango ya Bayuda, Yesu akufaki kaka mokolo oyo abandisaki Ekaniseli. Sanza ya Nisana ezalaki kobanda mokolo ya liboso ya sanza oyo moi ná butu eumelaka ndenge moko, mokolo oyo sanza ya sika emonanaka na Yerusaleme. Na yango, Ekaniseli esalemaka mikolo 14 nsima ya komonana ya sanza yango. (Yango wana mbala mosusu Ekaniseli ná Elekeli ya Bayuda ya ntango na biso esalemaka na dati moko te. Mpo na nini? Mpo ebandeli ya sanza na manaka na bango etyami na kotalela ndenge sanza ya sika ezali komonana bipai nyonso, kasi na ndenge sanza ya sika ezali komonana na Yerusaleme te, oyo ekoki komonana mbala mosusu ngonga 18 tii 30 liboso. Lisusu, Bayuda mingi lelo basalaka Elekeli na mokolo ya 15 Nisana, kasi na mokolo ya 14 Nisana te ndenge Yesu asalaki, na dati oyo ekokani na dati ya Elekeli na kolanda Mobeko ya Moize.)

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto