Loyembo 21
Esengo na bato ya motema mawa!
Ya Papye
1. Bato ya mitema mawa,
Bandimami na Yehova.
Bateyi bato ya sembo
Nzamb’asepeli na yango.
Na Yesu, mawa ya Nzambe,
Emonisami polele.
Ayokeli biso mawa.
Mpo ayebi’ete tobebá.
2. Nzambe apamboli bango;
Alimbisi bango nyonso.
Mawa bayokeli bango,
Mpo Krist’akufelá bango.
Tóyokela bato mawa,
Tóteya bango Liloba
Tolob’ete: “Bósepela
Bokonzi esili koya.”
3. Bato ya komikitisa
Bakomona bolingo’a Yah.
Bakoyokelama mawa,
Mpo baza’ motema mawa.
Tiká tózala na mawa,
Ezaleli’ango ekola.
Tómekola Yah mpe Kristo;
Tómonisa mawa seko.
(Talá mpe Luka 6:36; Rom. 12:8; Yak. 2:13.)