Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ndenge nini mikanda na biso ekomamaka mpe ebongolamaka?
    Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
    • LITEYA 23

      Ndenge nini mikanda na biso ekomamaka mpe ebongolamaka?

      Ndeko moko azali kosala na Departema ya Bokomi, na États-Unis

      Departema ya Bokomi na États-Unis

      Ekipi moko ya babongoli na Corée du Sud

      Corée du Sud

      Moto moko na Armenie asimbi buku oyo ebongolami na Batatoli ya Yehova

      Arménie

      Elenge mwasi moko na Burundi asimbi buku oyo ebongolami na Batatoli ya Yehova

      Burundi

      Mwasi moko na Sri Lanka asimbi bazulunalo oyo ebongolami na Batatoli ya Yehova

      Sri Lanka

      Mpo “nsango malamu” esakolama na ndenge ebongi mpenza na “bikólo nyonso mpe mabota nyonso mpe minɔkɔ nyonso mpe mikili nyonso,” tozali kobimisa mikanda na minɔkɔ soki 750. (Emoniseli 14:6) Ndenge nini tosalaka mosala monene yango? Tosalaka yango na lisalisi ya bakomi oyo bazali na mokili mobimba mpe babongoli oyo bamepesi na bolingo na bango moko, mpe bango nyonso bazali Batatoli ya Yehova.

      Ekomamaka liboso na Lingelesi. Bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi bakambaka mosala ya Departema ya Bokomi na biro monene ya Batatoli ya Yehova. Departema yango etalelaka mosala ya bakomi oyo bazali na biro monene mpe na babiro ya filiale mosusu. Lokola bakomi na biso bazali bato ya mikili ndenge na ndenge, balobelaka mimeseno ndenge na ndenge, mpe yango esalaka ete mikanda na biso esepelisa bato ya mokili mobimba.

      Na nsima etindamaka epai ya babongoli. Nsima ya kokoma lisolo moko, babongisaka yango lisusu mpe soki endimami, etindamaka na nzela ya Internet na baekipi ya babongoli na mokili mobimba. Bandeko yango babongolaka lisolo yango, na nsima batalaka na likebi mpenza soki makanisi yango ebongolami malamu, mpe na nsuka batángaka yango mpo na komona soki eyokani malamu na mibeko ya lokota. Babongoli yango basalaka nyonso bápona “maloba ya solo na bosikisiki” mpo bábimisa mpenza likanisi mobimba ya Lingelesi na monɔkɔ oyo bazali kobongola.​—Mosakoli 12:10.

      Baordinatɛrɛ esalisaka mpo mosala ekende mbangu. Ordinatɛrɛ ekoki te kozwa esika ya bakomi to babongoli. Nzokande, mosala na bango esalemaka na lombangu mpo bazali kosalela badiksionɛrɛ, biloko ya kosalela bolukiluki mpe bisaleli mosusu oyo ezali na kati ya ordinatɛrɛ. Batatoli ya Yehova babimisá programɛ moko ya ordinatɛrɛ oyo babengi MEPS (Système électronique d’édition multilingue), oyo esalisaka bandeko bábongola, bátya bililingi mpe bábongisa mikanda na minɔkɔ ebele mpo enyatama na imprimerie.

      Mpo na nini tosalaka makasi boye ata mpo na minɔkɔ oyo elobamaka kaka na mwa bato moke? Mpo mokano ya Yehova ezali ete “bato ya ndenge nyonso bábika mpe bázwa boyebi ya sikisiki ya solo.”​—1 Timote 2:3, 4.

      • Ndenge nini mikanda na biso ekomamaka?

      • Mpo na nini tobongolaka mikanda na biso na minɔkɔ ebele?

  • Mbongo mpo na mosala na biso na mokili mobimba eutaka wapi?
    Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
    • LITEYA 24

      Mbongo mpo na mosala na biso na mokili mobimba eutaka wapi?

      Moto moko azali kotya likabo ya bolingo malamu
      Batatoli ya Yehova na mosala ya kosakola

      Népal

      Bandeko bamipesi na mosala ya kotonga Ndako ya Bokonzi na Togo

      Togo

      Bandeko bazali kosala na Betele ya Grande-Bretagne

      Grande-Bretagne

      Mbula na mbula, ebongiseli na biso ebimisaka bamilio ya Babiblia ná mikanda mosusu mpe tokabolaka yango ofele. Totongaka Bandako ya Bokonzi ná babiro ya filiale mpe tobatelaka yango. Tosungaka bankóto ya bandeko ya libota ya Betele mpe bamisionɛrɛ, mpe tosalisaka bandeko na ntango ya likama. Na ntembe te, okoki komituna: ‘Mbongo nyonso wana eutaka wapi?’

      Tosɛngaka dime te, tokɔngɔlaka mpe mabonza te. Atako mosala na biso ya kopalanganisa nsango malamu esɛngaka mbongo mingi, tosɛngaka bato mbongo te. Eleki sikoyo mbula koleka nkama moko, nimero ya mibale ya zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki ete tondimi ete Yehova moto azali kosunga biso mpo na kobimisa yango mpe “tokoki te kosɛnga to koluka mbongo epai ya bato,” mpe tosalá yango ata moke te!​—Matai 10:8.

      Mosala na biso esimbami na makabo oyo bato bapesaka na bolingo na bango moko. Bato mingi basepelaka na mosala na biso ya koteya Biblia mpe bapesaka makabo mpo na yango. Batatoli bango moko mpe basepelaka kopesa na esengo ntango na bango, makasi na bango, mbongo na bango mpe biloko na bango mosusu mpo mokano ya Nzambe esalema na mabele mobimba. (1 Ntango 29:9) Na Ndako ya Bokonzi mpe na mayangani na biso, tozali na bakɛsi ya makabo esika baoyo balingi bakoki kotya makabo. Makabo ekoki mpe kopesama na nzela ya site Internet na biso, jw.org. Mbongo mingi eutaka na bato oyo bazali na bozwi mingi te, oyo bakokani na mwasi mobola oyo mobali akufá, oyo Yesu alobelaki, oyo atyaki mbongo ya bibende mibale na kɛsi ya makabo na tempelo. (Luka 21:1-4) Na yango, moto na moto akoki mbala na mbala ‘kobomba mwa eloko pembeni’ mpo na kopesa “ndenge akani na motema na ye.”​—1 Bakorinti 16:2; 2 Bakorinti 9:7.

      Tondimi mpenza ete Yehova akokoba kosimba mitema ya baoyo balingi ‘kokumisa ye na biloko na bango ya motuya’ mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya Bokonzi, mpo mokano na ye ekokisama.​—Masese 3:9.

      • Nini ekesenisaka ebongiseli na biso na mangomba mosusu?

      • Ndenge nini mbongo ya makabo esalelamaka?

  • Mpo na nini totongaka Bandako ya Bokonzi mpe ndenge nini tosalaka yango?
    Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
    • LITEYA 25

      Mpo na nini totongaka Bandako ya Bokonzi mpe ndenge nini tosalaka yango?

      Bandeko oyo bazali kotonga Ndako ya Bokonzi na Bolivie

      Bolivie

      Ndako ya Bokonzi liboso ya kobongisa yango lisusu na Nigeria
      Ndako ya Bokonzi oyo babongisi lisusu na Nigeria

      Nigeria, liboso mpe na nsima

      Ndako ya Bokonzi na Tahiti

      Tahiti

      Ndenge nkombo Ndako ya Bokonzi emonisi yango, mateya ya Biblia oyo eteyamaka kuna etali libosoliboso Bokonzi ya Nzambe, motó ya likambo oyo Yesu alobelaki mingi na mateya na ye.​—Luka 8:1.

      Ezali bisika ya losambo ya solo na mboka to na kartye. Bandako ya Bokonzi ezali bisika oyo Batatoli ya Yehova babongisaka mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. (Matai 24:14) Bandako ya Bokonzi nyonso ezalaka ndenge moko te, kasi nyonso ezalaka ya mindɔndɔ te; mpe na bisika mingi Ndako ya Bokonzi moko esalelamaka na masangá ebele. Na bambula oyo euti koleka, totongi bankóto ya Bandako ya Bokonzi ya sika (elingi koloba mokolo na mokolo Ndako ya Bokonzi mitano etongamaki) mpo masangá ezali se kobakisama. Ndenge nini yango ezali kosalema?​—Matai 19:26.

      Etongamaka na mbongo ya makabo oyo euti na mokili mobimba. Makabo yango etindamaka na biro ya filiale mpe masangá oyo esengeli kotonga to kobongisa Ndako ya Bokonzi ekoki kosalela mbongo yango.

      Etongamaka na bandeko ndenge na ndenge oyo bafutamaka te. Na mikili mingi Baekipi ya kotonga Bandako ya Bokonzi ebongisami. Baekipi yango ya batongi mpe bandeko oyo bapesaka bango mabɔkɔ bakendeke kotonga Bandako ya Bokonzi na masangá na mboka mpe ata na bisika mosusu ya mosika; basungaka Batatoli ya bisika yango na mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi. Na mikili mosusu, Batatoli oyo bayebi malamu mosala ya kotonga baponamaka mpo na kokamba mosala ya kotonga mpe kobongisa Bandako ya Bokonzi. Atako bandeko mingi oyo bayebi mosala bapesaka mabɔkɔ na esika nyonso oyo bazali kotonga, mosala makasi esalemaka nde na bandeko ya lisangá wana. Elimo ya Yehova mpe milende oyo bandeko basalaka na motema moko nde esalaka ete mosala yango esalema.​—Nzembo 127:1; Bakolose 3:23.

      • Mpo na nini bisika na biso ya losambo ebengamaka Ndako ya Bokonzi?

      • Nini esalaka ete Bandako ya Bokonzi etongama na mokili mobimba?

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto