Ndenge ya kosalisa baoyo bakómi naino pene te ya koyekola Biblia eteyaka
1. Buku Biblia eteyaka ekosepelisa moto nyonso oyo tokutani na ye na mbala ya liboso? Limbolá.
1 Mpo moto akóma mosambeli ya Yehova, asengeli koyekola makambo oyo Biblia eteyaka. Nzokande, bato mosusu bazali na mangomba ya bokristo te mpe bamonaka ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe te. Bamosusu bandimelaka Nzambe ata moke te mpe bazalaka na limemya te mpo na Biblia. Bisaleli nini esalisaki bato oyo na ebandeli bandimaki te buku Biblia eteyaka? Makanisi oyo elandi euti na makambo oyo basakoli ya mikili soki 20 balobi.
2. Soki moto ayebisi biso ete andimelaka Nzambe te, tosengeli koluka koyeba likambo nini, mpe mpo na nini?
2 Baoyo bandimelaka Nzambe te: Soki moto alobi ete andimelaka Nzambe te, tosengeli koluka koyeba mpo na nini. Andimelaka evolisyo? Atiká kondimela Nzambe mpo na kozanga bosembo oyo ezali na mokili to mpo na bokosi ya mangomba? Akolá na esika oyo esalá ete andimela Nzambe te? Ntango mosusu, alobaka mpenza polele te ete Nzambe azali te, kasi amonaka nde te ntina ya kondimela ye. Basakoli mingi bamonaka ete kotuna moto boye: “Ntango nini obandaki kokanisa bongo?” etindaka ye alimbola. Yoká ye mpe kokata ye maloba te. Soki toyebi ntina oyo moto andimelaka Nzambe te, tokoyeba ndenge ya koyanola mpe mokanda oyo tokoki kopesa ye.—Mas. 18:13.
3. Ndenge nini tokoki komonisa limemya epai ya moto mpe na bindimeli na ye?
3 Ntango ozali koyanola, salá makasi mpo moto yango amona te ete ozali kokweisa makanisi na ye. Likanisi oyo elandi euti na filiale ya États-Unis: “Ezali na ntina mingi komemya lotomo ya bato ya kopona makambo oyo bakondima. Na esika ya koluka kolongisa makanisi na biso, ekozala malamu tótuna bato mituna oyo ekotinda bango bákanisa mpo bango moko bázwa biyano.” Nsima ya koyoka makanisi ya moto, mbala mingi mokɛngɛli-motamboli moko abandaka na kotuna ye boye: “Osilá kotalela likambo oyo?”
4. Ndenge nini tokoki kosalisa bato ya Lingomba ya Buda?
4 Bato mingi ya Lingomba ya Buda bamesaná te na likambo etali kondimela Nzambe. Basakoli mosusu na Angleterre basepelaka kosalela mwa buku La paix et le bonheur durables : comment les trouver? ntango bazali kopesa litatoli na bato ya ndenge wana. Nsima ya kotalela maloba ya ebandeli, balobelaka eteni oyo elobi: “Existe-t-il vraiment un Créateur Très-Haut ?” mpe na nsima eteni elobi: “Un guide bénéfique pour tous les humains.” Nsima na yango, bakoki kolobela buku Biblia eteyaka mpe koyebisa moto yango ete: “Ata soki ondimelaka Nzambe te, koyekola Biblia ezali na ntina mingi mpo Biblia ezali na batoli mingi oyo ebongi mpenza.” Na États-Unis, mobongisi-nzela moko oyo asakolaka na monɔkɔ ya Chinois alobaki boye: “Bato mingi ya teritware na biso basepelaka kotánga. Yango wana, mbala mingi basilisaka kotánga mokanda totikelaki bango liboso tózongela bango. Mpo na yango, ezalaka mwa mpasi bákanga ntina ya likambo ya koyekola Biblia. Yango wana, na mbala ya liboso oyo nakutani na moto, nasepelaka kotikela ye mwa buku Nsango malamu mpo yango epesaka nzela ya kosolola na ye.” Mokɛngɛli ya zongazonga moko ya monɔkɔ ya Chinois na États-Unis alobi ete likoki ezali ya kosalela buku Biblia eteyaka na mbala ya liboso oyo okutani na moto. Kasi, ekozala malamu koleka obanda boyekoli na mokapo 2, oyo elobeli Biblia na esika ya kobanda na mokapo 1, oyo elobeli Nzambe.
5. Mpo na nini ezali na ntina tózala motema molai?
5 Moto akómaka kondimela Nzambe na mokolo moko te, yango wana esengeli kozala motema molai. Ntango mosusu, masolo ya ebandeli oyo tokosolola na moto ekotinda ye te andima ete Nzambe azali. Kasi na nsima, akoki kondima ete mbala mosusu ekoki kozala bongo, to akoki koloba ete akangi ntina mpo na nini moto akoki komona ete Nzambe azali.
6. Nini ekoki kosala ete bato mosusu básepela na Biblia te?
6 Baoyo basepelaka te na mateya ya Biblia mpe bandimaka yango te: Mbala mingi, moto oyo andimaka ete Nzambe akoki kozala, akoki kosepela te na mateya ya Biblia mpo andimaka te ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe. Ntango mosusu afandi na ekólo moko oyo ezali ya bokristo te mpe mpo na ye Biblia ezali buku ya bakristo. To mpe ekoki kozala ete azali moto ya ekólo moko oyo emibengaka ya bokristo kasi emipesá mingi na makambo ya mokili mpe akoki kokanisa ete Biblia ekosalisa ye mpenza te. Ndenge nini tokoki kosalisa bato ya ndenge wana bákóma kosepela na Biblia mpe nsukansuka bándima koyekola buku Biblia eteyaka?
7. Mbala mingi, wapi lolenge ya malamu ya kotinda moto asepela na Biblia?
7 Biro ya filiale ya ekólo Grèce ekomaki boye: “Lolenge eleki malamu ya kosalisa bato oyo basepelaka na Biblia te ezali ya kofungola Biblia mpe kolakisa bango makambo oyo ezali na kati. Basakoli mingi bamonaki ete ndenge oyo nsango ya Biblia esalaka na motema ya moto eleki mosika likambo mosusu nyonso oyo bakokaki koloba. (Ebr. 4:12) Komona nkombo ya Nzambe na Biblia, esalisaki bato mingi bákóma na mposa ya koyekola Biblia na mozindo.” Biro ya filiale ya Inde ekomaki boye: “Solo na likambo etali bomoi mpe liwa ebendaka likebi ya Bahindu mingi. Yango wana basepelaka mingi na elaka ya Biblia ya mokili oyo ezangi kozwa bato mosusu na valɛrɛ koleka basusu.” Basakoli bazwaka libaku ya komonisa oyo Biblia elobi ete Bokonzi ya Nzambe ekosala mpo na kobongisa makambo ntango balobelaka mikakatano oyo ezali kotungisa bato na esika oyo bafandi.
8. Tokoki koloba nini na bato oyo bandimelaka Biblia te mpo na mangomba ya bokristo?
8 Soki moto moko andimelaka Biblia te mpo na mangomba ya bokristo, yebisá ye ete mangomba ya bokristo ebebisá mateya ya Biblia mpe etalelaka yango na ndenge ebongi te. Biro ya filiale ya Inde ekomaki boye: “Ntango mosusu, esɛngaka tósalisa bato báyeba ete bato ya mangomba bazali bankolo Biblia te.” Balobi ete mbala mingi Ba-Hindu bakamwaka na eteni 4 ya mwa buku Quel est le but de la vie ? Comment le découvrir ?, oyo emonisi ndenge oyo mangomba emekaki kobebisa mpe kolimwisa Liloba ya Nzambe. Mobongisi-nzela moko na ekólo Brésil ayebisaka bato boye: “Mpo na nini te koluka koyeba makambo mosusu oyo ezali na kati ya Biblia? Bato mingi bazali kosala yango na makanisi ya malamu, kozanga ete bákómisa bango bandimi ya lingomba moko boye na makasi. Mbala mosusu okokamwa na makambo oyo okoyekola.”
9. Mpo na nini tosengeli kolɛmba nzoto te soki moto asepeli te na oyo Biblia eteyaka na mbala ya liboso oyo tokutani na ye?
9 Yehova atalaka motema ya moto mokomoko. (1 Sa. 16:7; Mas. 21:2) Azali kobenda bato ya mitema sembo na losambo ya solo. (Yoa. 6:44) Bato mingi ya ndenge wana bateyamá naino makambo ya Nzambe te to mpe bamesani na Biblia te. Mosala na biso ya kosakola epesaka bango libaku mpo “bábika mpe bázwa boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Tim. 2:4) Na yango, soki bato mosusu basepeli na Biblia te na mbala ya liboso oyo okutani na bango, kolɛmba nzoto te! Salelá moko ya bisaleli oyo bozali na yango mpo na kosalisa bango básepela lisusu mingi. Nsukansuka, okozala na likoki ya kosolola na bango na buku Biblia eteyaka mpenza nini?, esaleli na biso ya libosoliboso mpo na koyekola na bato Biblia.