Malako mpo na bakɛngɛli na eteyelo
NA LISANGÁ mokomoko ezali na nkulutu moko oyo atambwisaka Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Soki ezali yo moto ozwi mokumba wana, yebá ete esengo na yo mpo na eteyelo yango mpe ndenge ozali kolandela bokoli ya mwana-kelasi mokomoko ezali na ntina mingi mpo eteyelo ebota mbuma mpenza na lisangá na bino.
Moko ya makambo ya ntina oyo mokumba na yo ezali kosɛnga yango oyo: kotambwisa Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na lisangá na bino pɔsɔ na pɔsɔ. Kobosanaka te ete, longola bana-kelasi oyo bakosala masolo na bango, ezali mpe na bato oyo bazali koyoka. Yango wana, ekozala malamu otambwisa eteyelo na ndenge oyo ekopesa lisangá mobimba likoki ya kokanisa lisusu toli ya ntina oyo ezali kolendisa mpe kopesa mayele mpe eyokani ata na ntina moko to mibale ya eteyelo, oyo elobelami na nkasa 5 tii na 8 ya mokanda oyo.
Tyáká makanisi na yo na bana-kelasi nyonso, ezala ntango bazwi mokumba ya kotánga, to ya kosala masolo lokola bilakiseli, to mpe ya kosala masukulu. Salisá bango bámona masolo yango lokola mokumba kaka te, kasi mpe lokola libaku na bango ya koluka kokende liboso na kati ya mosala ya Yehova. Ya solo, mpo na kokende liboso, mwana-kelasi ye moko nde asengeli naino kosala makasi. Atako bongo, ezali mpe na ntina ete yo olandela na boboto mpenza bokoli na bango, osalisa bango bámona ntina ya toli oyo bazali kozwa, mpe olakisa bango ndenge oyo bakoki kosalela toli yango. Mpo na kosala bongo, landaká malamumalamu lisolo nyonso oyo bazali kosala mpo oyeba toli nini mpenza okoki kopesa.
Salá nyonso obanda eteyelo na ngonga oyo esengeli kobanda mpe esila na ngonga oyo esengeli kosila. Mpo yo moko ozala ndakisa ya malamu, toli mpe makanisi na yo esengeli kolekisa ngonga te. Soki mwana-kelasi moko abandi kolekisa ngonga, yo moko to mosaleli moko na misala asengeli kosala elembo mpo na koyebisa ye. Okotika mwana-kelasi yango asilisa fraze oyo abandi mpe soki asilisi yango asengeli kolongwa na estrade. Soki lisolo moko elekisi ngonga, yo koloba lisusu makambo mingi te ntango okoleka liboso, mpe ntango likita ekosila, sololá na ndeko oyo alekisaki ngonga.
Soki yo moko ozali wana, tambwisá eteyelo yo moko. Soki mokolo moko, ozwi likoki ya koya na makita te, nkulutu mosusu oyo lisangani ya bankulutu baponaki ye, akotambwisa eteyelo. Soki ozali na mposa moto moko asalisa yo na kosala programɛ, kotondisa nkasa ya masolo mpe kokabola yango, to mpo na kobongisa bato oyo bakosala masolo soki baoyo bazwaki yango bazali te, mosaleli moko na misala akoki kosalisa yo na makambo yango, kasi lisangani ya bankulutu nde esengeli kopona ye.
Kokomisa nkombo na eteyelo. Lendisá basakoli nyonso bákomisa nkombo na eteyelo oyo. Bato mosusu oyo bazali basakoli te kasi basanganaka na makita ya lisangá bakoki mpe kokomisa nkombo soki bazali kondima mateya ya Biblia mpe bazali kosalela mitinda ya boklisto na bomoi na bango. Soki moto moko ayebisi yo ete azali na mposa ya kokomisa nkombo na eteyelo, pesá ye longonya mingi. Soki moto yango akómi naino mosakoli te, yo mokɛngɛli na eteyelo osengeli kosolola na ye makambo oyo esɛngamaka mpo moto akomisa nkombo na eteyelo; ekozala malamu osolola na ye na miso ya moto oyo ayekolaka na ye Biblia (to na miso ya moboti na ye oyo azali mondimi). Masɛngami yango ezali ndenge moko na oyo basɛngaka na moto oyo alingi kokóma mosakoli oyo azwi naino batisimo te. Okokuta yango na nkasa 99 tii na 100 ya buku Lisanga mpo na kokokisa mosala ya Nzambe. Zalá na liste moko ya bankombo ya bato nyonso oyo bakomisi nkombo na eteyelo, ata baoyo bakɔti sika.
Ndenge ya kosalela lokasa ya toli. Mwana-kelasi mokomoko akomona lokosa na ye ya toli na kati ya mokanda na ye moko ya eteyelo, kobanda na nkasa 79 tii na 81. Ndenge langi oyo basaleli wana emonisi yango, toli nyonso, kobanda na oyo ya liboso tii na oyo ya 17, ezali oyo okoki kopona mpo na kotalela mwana-kelasi oyo azwi mokumba ya kotánga. Mpo na masolo oyo esalemaka lokola mwa bilakiseli, okoki kopona toli nyonso oyo olingi, longola kaka oyo ya 7, 52, mpe 53. Mpo na baoyo bazali kosala masukulu, okoki kopona toli nyonso, longola kaka oyo ya 7, 18, mpe 30.
Ntango mokɛngɛli na eteyelo asɛngi mwana-kelasi alanda toli moko, asengeli kokoma dati na krɛyo, na nse ya esika oyo bakomá “Dati okosala yango”; okokoma yango na kati ya mokanda ya mwana-kelasi, na esika ya polele oyo ezali pembeni ya toli oyo osɛngi ye. Soki mwana-kelasi asilisi kosala mokumba na ye, tuná ye ntango bozali kaka bino mibale soki asalaki devuare oyo ezali na nsuka ya lisolo ya toli oyo basɛngaki ye. Soki asalaki yango, okotya elembo ya moke na kati ya mwa etanda esika devuare yango ezali. Soki omoni ete asengeli kosalela lisusu toli oyo opesaki ye, okokoma eloko te na lokasa na ye ya toli mpe okotya dati moko te na nse ya esika oyo bakomá “Dati osilisaki yango.” Okokoma na esika wana kaka soki opesi ye nzela ya koleka na toli mosusu. Lisusu, na lokasa 82 ya mokanda oyo, okokoma mpe dati oyo mwana-kelasi asalelaki kadre boye to boye; okokoma dati yango na lobɔkɔ ya mwasi ya kadre wana mpe okobanda kokoma bongo nsima ya lisolo nyonso oyo akosala. Bisika ya mpamba ezali mingi na lokasa ya toli mpe na liste ya ndenge ya kosala masolo, oyo ekopesa nzela ya kosalela mbala mibale toli to lolenge mokomoko ya kosala masolo. Bana-kelasi basengeli kozala na mikanda na bango ntango eteyelo ezali koleka.
Na lisolo moko, okosɛnga kaka toli moko. Ekozala malamu kobanda na toli ya ebandeli mpe kolanda yango na molɔngɔ. Kasi soki bana-kelasi mosusu bazali na makoki mpenza, okoki koyebisa bango báyekola toli mosusu bango moko mpe básalela yango. Boye, yo okosalisa bango kaka na toli oyo omoni ete ezali kosɛnga básalisa bango mpo bákóma balobi mpe bateyi ya malamu mpenza.
Ata soki mwana-kelasi moko asali bambula mingi na eteyelo oyo, soki ayekoli liteya mokomoko mpe asaleli yango, akozanga te kozwa bolamu mingi. Mpo na kosalisa bana-kelasi oyo bazali kozanga mwa bizaleli mosusu ya malamu, okoki koponela bango toli oyo elobeli bizaleli wana mpo básalela yango, na esika ete obanda na bango na toli ya ebandeli mpe kolanda tii na oyo ya nsuka.
Ndenge ya kopesa toli. Ntango ozali kopesa toli, salelá malamu bandakisa mpe mitinda ya Biblia. Bana-kelasi báyoka ete toli oyo opesi bango mpe ndenge oyo opesi yango elandi mpenza mitinda kitoko ya Liloba ya Nzambe.
Kobosana te ete ozali ‘moninga ya mosala’ ya bandeko. (2 Kol. 1:24) Ndenge moko na bango, yo mpe osengeli ntango nyonso kosala makasi mpo na kobakisa mayele na yo ya kosala masukulu mpe ya koteya. Yekolá yo moko mokanda Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, salelá toli oyo bapesi, mpe zalá ndakisa oyo basusu bakolanda.
Ntango yo moko ozali kosala makasi ndenge wana, zalá mpe na mokano ya kosalisa bana-kelasi bákóma bato oyo bayebi kotánga malamu, oyo bayebi kosala masukulu malamu, mpe oyo bayebi mpenza koteya. Mpo na yango, salá makasi opesa lisalisi nyonso oyo bana-kelasi bazali na mposa na yango mpo na kokanga ntina ya bizaleli ndenge na ndenge oyo basɛngaka bato oyo basalaka masolo, báyeba ntina na yango, mpe báyeba ndenge oyo bango mpe bakoki kokóma na bizaleli wana. Mokanda oyo esalemi na ndenge oyo ekopesa yo nzela ya kokokisa mokumba yango. Nzokande, mbala mingi esɛngaka ete yo mokɛngɛli na eteyelo okende lisusu mwa mosika, osuka kaka te na kotánga maloba oyo ezali na kati ya mokanda. Lobelá nde likanisi oyo ezali na kati ya maloba wana mpe ndenge oyo bato bakoki kosalela yango.
Soki mwana-kelasi moko asaleli toli moko malamu, pesá ye longonya. Monisá na mokuse eloko nini esali ete yango emonana malamu to monisá ntina ya kosala bongo. Soki ekozala malamu abongisa lisusu na mwa esika moko boye, osengeli koyebisa ye ntina oyo osɛngi ye abongisa yango. Monisá ye ndenge oyo akoki kosala yango. Lobá makambo ya sikisiki mpe zalá na boboto.
Kobosana te ete mpo na bato mingi, koleka liboso ya bato ebele mpo na kosala lisolo ezalaka etumba. Soki moto akómi komiyoka ete asalaki malamu te, mbala mosusu akomituna soki atika kosala masolo. Landá ndakisa ya Yesu oyo azalaki kobuka te “nkɛkɛlɛ oyo efinamá,” azalaki mpe te koboma mɔtɔ ya “nsinga ya lini oyo ezali kopela mokemoke.” (Mat. 12:20) Talelá mpe mayoki ya mwana-kelasi mokomoko. Ntango ozali kopesa toli, talaká soki mwana-kelasi wana azali moto ya sika to mosakoli ya kala. Nsai na yo mpe longonya ya solosolo oyo ozali kopesa ekoki kolendisa bato básala nyonso oyo ekoki na bango.
Pesá mwana-kelasi nyonso lokumu. Baloma 12:10 elobi na biso boye: “Mpo na kopesana lokumu bózala bato ya liboso.” Ezali toli kitoko mpo na yo mopesi-toli na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi! Soki mwana-kelasi azali mokóló na yo, salelá malamu etinda oyo ezali na 1 Timote 5:1, 2. Nzokande, ntango esengeli kopesa toli mpo moto abongisa ndenge na ye ya kosala masolo, soki opesi ye toli yango na boboto, akoboya kondima te ata soki azali mokóló na yo.—Mas. 25:11.
Ntango ozali kopesa mwana-kelasi toli, monisá ye polele ntina ya formasyo oyo azali kozwa. Ntina na yango ezali te ya kosalela toli malamu mpo bápesa yo longonya mpe bálekisa yo na toli mosusu. Formasyo yango ezali nde mpo na kokómisa moto molobi mpe moteyi oyo bato mosusu bakosepela mpenza na ye. (Mas. 25:27) Mposa na biso ezali ete tósalela likabo oyo Yehova apesá biso ya koloba mpo tókumisa ye mpe tósalisa bato báyeba ye mpe bálinga ye. Formasyo oyo tozali kozwa esengeli kopesa biso makoki ya kokokisa malamumalamu mosala oyo elobelami na Matai 24:14 mpe na Matai 28:19, 20. Nsukansuka, bandeko mibali oyo bazwá batisimo mpe bakokisi masɛngami bakoki mpe kozwa mokumba ya kobatela “etonga ya Nzambe” mpe koleisa yango na masukulu ya bato nyonso mpe na mateya mosusu.—1 Pet. 5:2, 3.
Yebisá bana-kelasi ete soki bapesi bango lisolo ya kosala, basengeli kotánga lisolo ya toli oyo bapesi bango na boumeli ya mwa mikolo oyo ekolanda. Lendisá bango ete básalelaka makambo oyo bazali koyekola ntango bazali kobongisa masolo oyo bakosala na eteyelo, to ntango bazali kosolola na bato, to ntango bazali kopesa biyano na makita, to mpe ntango bazali kosakola.
Ndenge ya kopesa masolo. Osengeli kopesa bato masolo pɔsɔ misato liboso to mpe koleka. Masolo nyonso esengeli kopesama na lokasa, soki likoki ezali.
Masolo ya koteya lisangá ekopesama na bankulutu, mingimingi mpenza baoyo bakosala yango malamumalamu, mpe na basaleli na misala oyo bateyaka malamu.
Na oyo etali masolo ya bana-kelasi, mpo na koyeba lisolo nini okoki kopesa na bandeko mibali mpe lisolo nini okopesa na bandeko basi, landá malako oyo bapesi na lokasa ya programɛ ya eteyelo. Soki bandeko basi oyo basalaka masolo ya bana-kelasi bazali mingi koleka bandeko mibali, kebá ete opesaka bandeko mibali kaka masolo ya botángi ya Biblia te.
Talelá mpe moto mokomoko ntango ozali kopesa masolo. Soki mokolo wana, nkulutu moko to mosaleli moko na misala azali na lisolo ya kosala na Likita ya Mosala to azali na lisukulu na pɔsɔ wana na lisangá, ezali nde na ntina mpenza ete opesa ye lisolo na mokolo yango to na pɔsɔ yango? Ezali nde na ntina mpenza ete opesa na ndeko mwasi moko lisolo mokolo moko na bana na ye ya mike, oyo ekosɛnga mbala mosusu asalisa bango na lisolo na bango? Lisolo oyo opesi na mwana moke to na moyekoli moko ya Biblia oyo azwi naino batisimo te, ebongi na ye mpenza? Talá mpe soki lisolo oyo opesi mwana-kelasi ebongi mpenza na toli oyo osɛngi ye asalela.
Mpo na masolo oyo opesi bandeko basi, mingimingi ezali mwana-kelasi nde akopona ye moko lolenge akosala lisolo na ye, ndenge malako ya lokasa ya 78 mpe 82 elobeli yango. Osengeli kopesa ye moto oyo akosala na ye lisolo, kasi moto ya misato mpe akoki kobakisama. Soki mwana-kelasi asɛngi yo opesa ye moto ya misato oyo akobonga mpenza na lolenge ya kosala lisolo oyo ye aponi, ekozala malamu otya likebi na likambo yango.
Bakelasi mosusu. Soki bana-kelasi nyonso baleki 50, ekozala malamu kotalela likanisi ya kobakisa bakelasi mosusu oyo bakoki kokende kosala masolo. Lisangá na lisangá ekotala: soki balingi, masolo nyonso ya bana-kelasi ekosalema mpe na bakelasi wana mosusu, to soki mpe balingi, kaka masolo mibale ya nsuka nde esalemaka kuna, mabe ezali te.
Mpo na bakelasi mosusu wana, mokomoko na yango esengeli kozala na motambwisi oyo akoki mpenza, ekoleka malamu azala nkulutu. Soki emonani malamu, mosaleli moko na misala, oyo abongi mpenza, akoki kotambwisa yango. Lisangani ya bankulutu nde ekopona batambwisi ya bakelasi yango. Yo na batambwisi yango bósololaka malamu mpo oyebaka kolandela bokoli ya bana-kelasi ata soki basali lisolo na bango na kelasi mosusu.
Kelasi ya koyekola kotánga. Soki lisangani ya bankulutu emoni ete bato mingi na lisangá bazali na mposa ya koyekola malamu monɔkɔ oyo elobamaka na makita ya lisangá, okoki kokɔtisa kelasi yango na bibongiseli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Mateya ya kelasi wana ekoki kosalisa bato báyeba kotánga to mpe bábongisa ndenge na bango ya kotánga.
Bakelasi wana esengeli te kotabwisama ntango bana-kelasi ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi bazali kosala masolo na bango. Mpo na kopesa mateya oyo ekoki mpenza, esɛngaka mbala mosusu bangonga mingi koleka oyo epesamaka na kelasi wana ntango eteyelo ezali koleka. Bankulutu ya lisangá mokomoko bakoki kotala nini basengeli kosala mpe ntango nini mateya ya kelasi yango esengeli kopesama. Soki emonani malamu, bokoki kozwa bibongiseli mpo bato mingi bálandaka mateya yango esika moko to mpe moto mokomoko na ntango na ye.
Esengeli kozwa molakisi oyo abongi mpenza. Ekozala malamu mingi soki ndeko mobali oyo akoponama ayebi kotánga malamumalamu mpe ayebi monɔkɔ na bino malamu. Soki ezali na ndeko mobali te oyo akoki kotángisa, bankulutu bakoki kosɛnga na ndeko mwasi moko atángisaka; asengeli kozala ndeko oyo akoki mpenza na kotángisa mpe oyo azali na bizaleli ya malamu. Asengeli kolata litambala ntango azali kotángisa.—1 Kol. 11:3-10; 1 Tim. 2:11, 12.
Mwa buku Omipesa na kotánga mpe kokoma ebimi na minɔkɔ ebele. Yango esalami mpo na kolakisa bato mateya ya ebandeli mpo na koyeba kotánga mpe kokoma. Bokoki mpe kosalela mikanda mosusu ya kotángisa, soki esengeli bongo mpo bana-kelasi bákola lisusu malamu. Soki bakómi koyeba kotánga na ndenge oyo ekoki, esengeli kolendisa bango bákɔta na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi.
Lokola ozali mokɛngɛli na eteyelo, okoki kosalisa lisangá mingi mpenza. Omibongisaka malamu mpe, mpo na kolanda toli oyo ezali na Baloma 12:6-8, tyáká makanisi nyonso na mokumba na yo, moná yango lokola eloko ya motuya oyo Nzambe apesi na mabɔkɔ na yo.