Loyembo 19
Nzambe alaki Paradiso
Ya Papye
1. Nzamb’alaki Paradiso
Na Bokonzi ya mbula nkóto.
Mpisoli mpe liwa ná mpasi
Ekosila ntango yango.
(MONDIMO)
Paradiso ekozala.
Na kondima, toz’omona yango.
Kristo akokisi,
Yango nde Nzambe alingi.
2. Mosika te, bakufi mingi
Bakozwa bomoi ya solo
Ndenge kaka Yesu alaki:
‘Yo ná ngai na Paradiso.’
(MONDIMO)
Paradiso ekozala.
Na kondima, toz’omona yango.
Kristo akokisi,
Yango nde Nzambe alingi.
3. Nkolo’alaki nde Paradiso.
Ye Mokonzi ya mabele.
Tótɔnda Yah Tat’a bolingo,
Mpe na nzembo sanzolá ye.
(MONDIMO)
Paradiso ekozala.
Na kondima, toz’omona yango.
Kristo akokisi,
Yango nde Nzambe alingi.
(Talá mpe Mat. 5:5; 6:10; Yoa. 5:28, 29.)