Loyembo 150
Tómipesa
Ya Papye
Nzamb’ayebi mposa na nga’
Mpo nakóma na esengo.
Apesi misala beboo
nakoki kosalela ye.
(MONDIMO)
Bolingo, molende
ekotinda nga’
Nandima kokende esika
mpos’eza’mingi.
Bisik’oyo mpos’ezali,
tokokende kosalisa.
Na molende tómipesa
tósalisa bazalani
(MONDIMO)
Bolingo, molende
ekotinda nga’
Nandima kokende esika
mpos’eza’mingi.
Tomipesi na kotonga
na bingumba, na bamboka
Tosololi na bapaya
tosakweli bato nyonso.
(MONDIMO)
Bolingo, molende
ekotinda nga’
Nandima kokende esika
mpos’eza’mingi.
(Talá mpe Yoa. 4:35; Mis. 2:8; Rom. 10:14.)