LOYEMBO 72
Tóyebisa bato solo ya Bokonzi
Ya Papye
1. Liboso toyebaki te
Nzela oyo tokokende.
Nzambe atindi pole,
Nsango ya Bokonzi na ye.
Tómipesa na Yehova,
Mpe tósalela kaka ye,
Tókumisa Yehova,
Tósantisa seko nkombo na ye.
Lelo toza’ kosakola,
Ndako nyonso mpe na nzela.
Toteyaka bato solo,
Efungoli bango miso.
Awa toza’ kokɔtisa
Bipai nyonso losambo’a Yah,
Tókoba ndenge wana
Tii Nzambe akoloba: “Esili.”
(Talá mpe Yos. 9:9; Yis. 24:15; Yoa. 8:12, 32.)