LOYEMBO 148
Yehova abikisaka
1. Yehova, oza’ mpenza Nzambe ya bomoi;
Tomoni nguya n’o
na misala na yo.
Nzambe moko te akokani na yo
—ya solo.
Banguna basuki.
(MONDIMO)
Yehova, Mobikisi-bato’a sembo.
Tóyebi ete oza’ Libang’a nguya.
Ɛɛ, na mpiko mpe na kondima,
toyebisi
Bato ete: Yehova ye nde
Mobikisi.
2. Liwa ez’olanda nga’, nabeleli yo:
“Yah, pesá nga’ mpiko,
pesá nga’ nguya n’o.”
Na tempelo n’o yoká, naz’olela:
“Bombá nga’,
Nzambe na nga’, sungá.”
(MONDIMO)
Yehova, Mobikisi-bato’a sembo.
Tóyebi ete oza’ Libang’a nguya.
Ɛɛ, na mpiko mpe na kondima,
toyebisi
Bato ete: Yehova ye nde
Mobikisi.
3. Ogangaka makasi lokola nkake.
Banguna, kolɛnga;
biso, kosepela.
Yehova, okómaka
oy’olingi,
Toyebi,
Mp’obikisa biso.
(MONDIMO)
Yehova, Mobikisi-bato’a sembo.
Tóyebi ete oza’ Libang’a nguya.
Ɛɛ, na mpiko mpe na kondima,
toyebisi
Bato ete: Yehova ye nde
Mobikisi.
(Talá mpe Nz. 18:1, 2; 144:1, 2.)