LOYEMBO 45
Komanyola ya motema na ngai
Ya Papye
1. Komanyola ya motema,
Makambo nakanisaka,
Esepelisa yo, Nkolo,
Esunga nga’ natosa yo.
Ntango bampasi ezwi nga’,
Mpe ezangisi nga’ mpɔngi;
Yah, nakanisa kaka yo,
Namanyola liloba n’o.
2. Makambo nyonso ya pɛto,
Ya malamu mpe ya solo,
Yango nde nakomanyola,
Mpo nazwa kimya ya solo.
Makanisi n’o kitoko!
Ebele koleka zɛlo.
Tiká namanyola yango,
Mpe nakanisaka yango.
(Talá mpe Nz. 49:3; 63:6; 139:17, 23; Flp. 4:7, 8; 1 Tim. 4:15.)