LOYEMBO 77
Pole na mokili ya molili
Ya Papye
1. Mokili eza’ molili,
Kasi pol’engɛngi.
Eza’ komonisa bato
Ntɔngɔ ebɛlɛmi.
(MONDIMO)
Nsango ya Bokonzi
Eza’ kongɛnga mpenza.
Epesi elikya—
Eza’ komonisa
Ntɔngɔ ekómi pene—
Butu ekei.
2. Balali, nsoso eleli;
Bálongwa na mpɔngi.
Toza’ kolendisa bango.
Nzambe, sungá bango.
(MONDIMO)
Nsango ya Bokonzi
Eza’ kongɛnga mpenza.
Epesi elikya—
Eza’ komonisa
Ntɔngɔ ekómi pene—
Butu ekei.
(Talá mpe Yoa. 3:19; 8:12; Rom. 13:11, 12; 1 Pe. 2:9.)