LOYEMBO 18
Tózala na botɔndi mpo na lisiko
Ya Papye
1. Nzambe Yehova,
toyei liboso na yo
Mpo bolingo na yo nde
eleki monene.
Opesaki Mwana na yo
mpo na biso.
Yango nde mbeka eleki
mpenza monene.
(MONDIMO)
Yesu asikolá biso
na nzel’a makila na ye.
Tokopesa yo
matɔndi mingi mpo na seko.
2. Yesu apesaki mbeka
na bolingo.
Akabaki bomoi na ye
mpo na biso.
Liwa na ye epesi
biso elikya
Ya kobika seko mpo
liwa ekosila.
(MONDIMO)
Yesu asikolá biso
na nzel’a makila na ye.
Tokopesa yo
matɔndi mingi mpo na seko.
(Talá mpe Ebr. 9:13, 14; 1 Pe. 1:18, 19.)