LOYEMBO 56
Monisá solo
Ya Papye
1. Nzela ya solo ebongisaka moto,
Kasi yo moko landá yango.
Soki Yehova apesi toli na ye;
Yokelá ye, ndimelá ye.
(MONDIMO)
Monisá solo
Na bizaleli na yo.
Okozwa esengo
Ya Yehova
Mpo omonisi solo.
2. Milende na yo mpe ntango opesaka
Na mosal’a Yehova Nzambe
Ekomemela yo mapamboli mingi,
Mpe bomoi ya esengo.
(MONDIMO)
Monisá solo
Na bizaleli na yo.
Okozwa esengo
Ya Yehova
Mpo omonisi solo.
3. Na miso’a Nzambe, tozali bana mike,
Toza’ na mpos’a toli na ye.
Eza’ malamu tótosaka Yehova;
Mpo akopambola biso.
(MONDIMO)
Monisá solo
Na bizaleli na yo.
Okozwa esengo
Ya Yehova
Mpo omonisi solo.
(Talá mpe Nz. 26:3; Mas. 8:35; 15:31; Yoa. 8:31, 32.)