LOYEMBO 8
Yehova azali ekimelo na biso
Ya Papye
1. Yehova, ekimelo,
Elikya na biso.
Tokomibomba na nse
Ya elili na ye.
Abundelaka bato n’e,
Tokolonga nde mpo na ye.
Yehova, ndako mpenza,
Kuna bakozwa biso te.
2. Atako bato mingi
Bakwei pene na yo,
Kasi moto ya sembo,
Ye akokwea te.
Yango wana tóbanga te,
Yehova aza’ na biso.
Ye akobomba biso
Na nse ya mapapu na ye.
3. Akobatela biso
Na mitambo batye.
Na butu, kobanga te;
Na moi, kolɛnga te.
Tokobanga eloko te,
Epai nyonso, toza’ na ye.
Yehova, ekimelo,
Ye akobatela biso.
(Talá mpe Nz. 97:10; 121:3, 5; Yis. 52:12.)