LOYEMBO 123
Tótosaka ebongiseli ya Teokrasi
Ya Papye
1. Biso Batatoli tosakolaka
Bokonzi ya Nzambe bisika nyonso.
Esɛngi tótosaka Teokrasi,
Mpo kimya ezala, mpe boyokani.
(MONDIMO)
Tótosa Nzambe, tósalela ye,
Tótikala sembo.
Aza’ bolingo mpe mobateli,
Tókangama se na ye.
2. Mpo tóyeba ndenge ya kotosa ye,
Apesi elimo mpe moombo n’e.
Tɛlɛmá makasi, sepelisá ye,
Lakisá mpe bato mibeko na ye!
(MONDIMO)
Tótosa Nzambe, tósalela ye,
Tótikala sembo.
Aza’ bolingo mpe mobateli,
Tókangama se na ye.
(Talá mpe Luka 12:42; Ebr. 13:7, 17.)