LOYEMBO 96
Buku ya Nzambe —Eloko ya motuya mingi
1. Eza’ na buku moko ya kitoko
Epesaka kimya mpe esengo.
Ezali kofungola bato miso;
Eza’ kopesa mpe bato bomoi.
Buku yango nde Biblia mosantu.
Ekomamaki na bato oyo
Balingaki mpenza Yehova Nzambe;
Elimo na y’ekambaki bango.
2. Bakomaki ndenge Nzambe akelá
Likoló ná nse, biloko nyonso.
Balobeli mpe Adama ná Eva;
Ndenge babungisá Paradiso.
Balobeli ndenge anzelu moko
Atɛmɛlaki bokonzi’a Nzambe.
Yango lelo, toza’ komona mpasi,
Mosika te, Yah akolonga ye.
3. Yehova Nzambe aza’ koyangela
Na nzela ya Bokonzi ya Kristo.
Sikoyo tópanza nsango malamu:
Bokonzi ya Nzambe eza’ koya.
Nyonso wana ezali na Biblia;
Bilei y’elimo mpo na nga’ ná yo.
Epesaka kimya eleki nyonso.
Tángáká yango, eleki wolo.
(Talá mpe 2 Tim. 3:16; 2 Pe. 1:21.)