LOYEMBO 79
Tóteya bango bátɛlɛma ngwi
Ya Papye
1. Esengo koteya bampate,
Bákola na elimo.
Yehova apamboli bango,
Batosi liloba n’e.
(MONDIMO)
Yehova, tobondeli yo
Mpenza obatela bango.
Na nkombo’a Yesu, tosɛngi: Bálɛmba te;
Tik’ete bátɛlɛma ngwi.
2. Tobondelaki mpo na bango,
Ntango bamekamaki.
Toteyi bango na bolingo;
Bakoli, bapambwami.
(MONDIMO)
Yehova, tobondeli yo
Mpenza obatela bango.
Na nkombo’a Yesu, tosɛngi: Bálɛmba te;
Tik’ete bátɛlɛma ngwi.
3. Bátya nde motema na bango,
Na Nzambe mpe na Yesu.
Báyika mpiko mpe bátosa,
Bákɔta paradiso.
(MONDIMO)
Yehova, tobondeli yo
Mpenza obatela bango.
Na nkombo’a Yesu, tosɛngi: Bálɛmba te;
Tik’ete bátɛlɛma ngwi.
(Talá mpe Luka 6:48; Mis. 5:42; Flp. 4:1.)