LOYEMBO 11
Bozalisi ekumisaka Nzambe
Ya Papye
1. Misala n’o minene mpe mingi,
Na likoló, ekumisaka yo.
Bozalisi, at’elobaka te,
Eza’ mpenza koteya mpo na yo.
Bozalisi, at’elobaka te,
Eza’ mpenza koteya mpo na yo.
2. Kobanga yo ebandeli’a bwanya,
Tobatelami na bwanya yango.
Mibeko n’o mwinda mpo na biso;
Motuya n’ango eleki wolo.
Mibeko n’o mwinda mpo na biso;
Motuya n’ango eleki wolo.
3. Koyeba yo, nzela ya bomoi,
Liloba n’o, epesaka pole.
Nkombo na yo, kosantisa yango,
Nde lokumu eleki monene.
Nkombo na yo, kosantisa yango,
Nde lokumu eleki monene.