LOYEMBO 80
‘Bómeka mpe bómona malamu ya Yehova’
Ya Papye
1. Kosalela Nzambe eza’
Lokumu moko monene.
Tósomba ntango ya kosakola,
Mpo bato bábikisama.
(MONDIMO)
Nzambe alobi: ‘Meká, moná
Malamu ya Yehova.’
Kangamá kaka na Yehova,
Akobosana yo te.
2. Mosala ya ntango nyonso
Epesaka mapamboli.
Nzambe ayebi mposa na biso,
Tósepela n’oyo tozwi.
(MONDIMO)
Nzambe alobi: ‘Meká, moná
Malamu ya Yehova.’
Kangamá kaka na Yehova,
Akobosana yo te.
(Talá mpe Mrk. 14:8; Luka 21:2; 1 Tim. 1:12; 6:6.)