LOYEMBO 111
Ntina ya esengo na biso
1. Tozali na makambo mingi
Esepelisaka biso.
Biloko kitoko’a bikólo
Ez’oya epai ya Nkolo.
Lisusu tozali n’esengo
Mpo na mateya tozwaka;
Euti na Lilob’a Nzambe,
Eza’ kopesa kondima.
Esengo na biso ezali
Kopela makasi mpenza.
Atako toza’ na bampasi
Yehova aza’ kosunga.
(MONDIMO)
Yehova Nzambe, esengo!
Misala na ye, esengo!
Mayele na ye ezangá nsuka,
Nguya n’eleki monene!
2. Ezali esengo komona
Likoló, nse, mbu monene.
Bozalisi emonisaka
Nguya ya Nzambe na biso.
Bokonzi ya Yehova Nzambe
Epesi biso esengo
Mpo ekomema paradiso,
Toza’ koyebisa bato.
Esengo’a seko ebɛlɛmi
Lokola kotan’a ntɔngɔ.
Likoló mpe mabel’a sika
Ekoya n’esengo seko.
(MONDIMO)
Yehova Nzambe, esengo!
Misala na ye, esengo!
Mayele na ye ezangá nsuka,
Nguya n’eleki monene!
(Talá mpe Mib. 16:15; Yis. 12:6; Yoa. 15:11.)