LOYEMBO 114
‘Tózala na motema molai’
Ya Papye
1. Yehova, ye aboyá
Básambwisa nkombo na ye.
Aza’ mpenza na mposa
Asantisa nkombo yango.
Akangi nde motema
Mbula ebele mpenza;
Azeli lelo, lobi,
Aza’ kolɛmba te.
Mokano na y’ezali
Tóbika, tótika mabe.
Motema molai n’e
Ebikisi bato mingi.
2. Esɛngi mpe na biso,
Motema molai lelo.
Tózala bato’a kimya,
Tósilikaka noki te.
Tóboya komonaka
Se mabe ya baninga.
Tókangaka motema
Ntango tomekami.
Motema molai mpe
Bizaleli nyonso’a Nzambe,
Soki toza’ na yango
Tokozala na esengo.
(Talá mpe Kob. 34:14; Yis. 40:28; 1 Ko. 13:4, 7; 1 Tim. 2:4.)