LOYEMBO 103
Babateli ya mpate —Makabo oyo ezali bato
Ya Papye
1. Bankulutu baza’ makabo
Ya Yehova Nzambe.
Tólanda ndakisa malamu
Bazali kopesa.
(MONDIMO)
Bankulutu baza’ makabo
Nzambe apesi biso.
Baz’olala te mpo na biso,
Tólɛngɛlaka bango.
2. Bayebaka mpasi na biso,
Mpo balingi biso.
Soki tozoki, batye nkisi
Na bolingo mpenza.
(MONDIMO)
Bankulutu baza’ makabo
Nzambe apesi biso.
Baz’olala te mpo na biso,
Tólɛngɛlaka bango.
3. Bapesaka biso batoli
Ya lilob’a Nzambe.
Elakisaka biso nzela,
Mpo tósalela Yah.
(MONDIMO)
Bankulutu baza’ makabo
Nzambe apesi biso.
Baz’olala te mpo na biso,
Tólɛngɛlaka bango.
(Talá mpe Yis. 32:1, 2; Yir. 3:15; Yoa. 21:15-17; Mis. 20:28.)