LOYEMBO 36
Batelá motema na yo
Ya Papye
1. Batelá mpenza motema;
Okozwa lobiko.
Nzambe ayebi motema,
Bomoto ya kati.
Motema na yo ekoki
Mpenza kokosa yo.
Kasi soki eteyami,
Okotosa Nkolo.
2. Bongisá motema na yo,
Mpo obondela Yah.
Pesá matɔndi na nyonso
Asalelaka yo.
Oyo Yah ateyi biso,
Tosá na esengo.
Kómisá motema sembo,
Sepelisá Nkolo.
3. Na motema n’o, longolá
Makanisi mabe.
Sukolá motema na yo
Na Lilob’a Nzambe.
Nzambe alingaka
Bato ya mitema sembo.
Sambelá ye mpo na seko,
Ye Moninga na yo.