LOYEMBO 46
Totɔndi yo, Yehova
Ya Papye
1. Mersi Yehova, topesi yo nkembo.
Opesi biso pole na yo, Yah.
Mersi, ondimi tóbondelaka yo,
Toza’ nini mpo oyoka biso?
2. Mersi Yehova mpo na Mwana na yo,
Ye alongaki mokili oyo.
Apesi biso ndakisa tólanda
Mpo tósala se mokano na yo.
3. Mersi, opesi biso mpe lokumu:
Koteya bato nkombo na yo, Yah.
Mersi, bampasi elingi esila,
Mokili’a sika ekómi pene.
(Talá mpe Nz. 50:14; 95:2; 147:7; Kol. 3:15.)