LOYEMBO 132
Sikoyo tokómi moto moko
Ya Papye
1. Oza’ mpenza mok’wa na nga’,
Moninga mpe mosuni na nga’
Oyo Nzambe apesi nga’.
Oza’ mpenza wa nga’.
Nzoto moko ngai ná yo,
Oyo ya nga’ ezali ya yo.
Tobalani mpe tosali
Libota na biso.
Ngai ná yo tokosalela Yah.
Ateyi biso
tólingana ya solo.
Tókokisa ndai na biso.
Tokozala mpenza n’esengo.
Bolingo oyo nsuka te,
Lokumu nyonso se na Yah.
(Talá mpe Eba. 29:18; Mos. 4:9, 10; 1 Ko. 13:8.)