LOYEMBO 126
Kɛngɛláká, tɛlɛmá ngwi, zalá makasi
Ya Papye
1. Tɛlɛmá ngwi, kolɛmba te
Mpe kozonga nsima te.
Zalá mpenza sod’a mpiko,
Okolonga etumba.
Tosáká mitindo ya Kristo,
Mpo ye nde komanda na biso.
(MONDIMO)
Kɛngɛláká, zalá na mpiko!
Bundá, kobá tii nsuka!
2. Tɛlɛmá, fungolá miso,
Tosáká ntango nyonso.
Tyá matoi, yoká Kristo,
Epa’ moombo’a sembo.
Yokeláká bankulutu mpo
Babatelaka ngai ná yo.
(MONDIMO)
Kɛngɛláká, zalá na mpiko!
Bundá, kobá tii nsuka!
3. Tɛlɛmá, tóbunda mpenza
Mpo na nsango malamu.
Tokosakola tii nsuka,
Ata banguna baza’.
Yo mpe yaká, pesá mabɔkɔ.
Mokili ekómi na nsuka!
(MONDIMO)
Kɛngɛláká, zalá na mpiko!
Bundá, kobá tii nsuka!
(Talá mpe Mat. 24:13; Ebr. 13:7, 17; 1 Pe. 5:8.)