LOYEMBO 90
Tólendisanaka
Ya Papye
1. Wana toza’ kolendisana
Mpo na kotikala sembo,
Tókolisaka mpe bolingo;
Boyokani mpe bondeko.
Bolingo ya bato ya Nzambe
Yango nde elendisaka.
Lisangá eza’ ekimelo,
Kuna nde tozwaka kimya.
2. Na mpasi, maloba kitoko
Ekitisaka motema!
Tokoyoka maloba yango
Epa’ bandeko ya sembo.
Esengo kosala elongo,
Toza’ ban’a Tata moko!
Ebongi tósalisanaka;
Mpasi na yo, mpasi na nga’.
3. Armagedone ekómi pene,
Yango wana eza’ koya.
Ebongi tóyaka makita,
Mpo tólongwa te na nzela.
Biso nyonso, liboke moko,
Tokosalela Yehova.
Bandeko, tólendisanaka
Mpo tóbatela bosembo.
(Talá mpe Luka 22:32; Mis. 14:21, 22; Gal. 6:2; 1 Tes. 5:14.)