LOYEMBO 130
Tólimbisaka
Ya Papye
1. Yehova, bolingo;
Apesaki Mwana n’e
Mpo biso tólimbisama,
Tólongwa mpe na liwa.
Soki tobongwani solo,
Tokoki kosɛnga ye
Ete alimbisa biso
Mpo na mbeka ya Kristo.
2. Tokolimbisama
Soki biso moko mpe,
Lokola Yehova Nzambe,
Toza’ kolimbisana.
Mpo soki tokangi nkanda,
Ekolongola kimya.
Tómonisa nde bolingo,
Tókumisa bandeko.
3. Koyokela mawa,
Ezaleli kitoko.
Mpo elongolaka nkanda,
Koyina na motema.
Tólimbisaka bandeko,
Tómekola Yehova,
Ye alimbisaka biso,
Mpo azali bolingo.
(Talá mpe Mat. 6:12; Ef. 4:32; Kol. 3:13.)