LOYEMBO 43
Libondeli ya kopesa matɔndi
Ya Papye
1. Yehova Nzambe, tokumisi yo.
Tata, yoká libondeli oyo.
Tomipesi na mosala na yo,
Mpo toyebi osungaka biso.
Mabunga na biso eza’ mingi.
Nkolo, limbisá, kolandela te.
Mersi mpo na lisiko ya Yesu,
Mpo oyebi bolɛmbu na biso.
2. Matɔndi mpo na bolingo na yo.
Okómisi biso baninga n’o.
Teyá biso, Nkolo, tóyeba yo.
Lakisá biso kozala sembo.
Matɔndi mpo na elimo na yo.
Tozwi nguya ya koteya solo.
Tomikitisi, tosaleli yo;
Opesi biso mpenza lokumu.