LOYEMBO 95
Pole ezali kongɛnga se kongɛnga
Ya Papye
1. Elimo ya Nzambe emonisaki
Koya ya Kristo na mokili.
Basakoli mpe ba’nzelu ya Nzambe
Balukaki koyeba yango.
Lelo Kristo azali koyangela,
Toza’ komona bilembo.
Tozwi libaku ya koyeba yango;
Tozali bato ya esengo!
(MONDIMO)
Pole ezali kongɛngisa
Nzela ya Bakristo’a solo.
Totosi matey’a Yehova;
Azali kokamba biso.
2. Nkolo atyá mpe moombo ya sembo;
Mpo tózwa bilei ya elimo.
Pole eza’ kongɛnga se kongɛnga,
Mateya ekómi kitoko.
Totambolaka na pole ya Nzambe,
Eza’ kongɛngisa biso.
Mersi Yehova, Liziba ya solo;
Tokolanda se nzela na yo.
(MONDIMO)
Pole ezali kongɛngisa
Nzela ya Bakristo’a solo.
Totosi matey’a Yehova;
Azali kokamba biso.
(Talá mpe Rom. 8:22; 1 Ko. 2:10; 1 Pe. 1:12.)