LOYEMBO 76
Oyokaka nini?
1. Oyokaka nini
ntango oza’ koteya,
Mpe bato bayoki yo,
olendisi bango?
Kobá komipesa
Nzambe akopambola.
Ayebi bato nyonso
ya mitema sembo.
(MONDIMO)
Epesaka nga’ esengo
ya kobomela Yah nzoto.
Mbeka masanzoli oyo,
nakopesa seko.
2. Oyokaka nini
ntango maloba na yo
Esepelisi bato
babongi na bomoi?
Basusu bakoki
nde kokanga matoi,
Kasi tokotika te
komema nkombo n’e.
(MONDIMO)
Epesaka nga’ esengo
ya kobomela Yah nzoto.
Mbeka masanzoli oyo,
nakopesa seko.
3. Oyokaka nini
ndenge Nzambe andimi
Osala mosala n’e
mpe az’osunga yo?
Tokoteya bato
na boboto mpe mpiko,
Tóbunda mpo mosala
elingi esila.
(MONDIMO)
Epesaka nga’ esengo
ya kobomela Yah nzoto.
Mbeka masanzoli oyo,
nakopesa seko.
(Talá mpe Mis. 13:48; 1 Tes. 2:4; 1 Tim. 1:11.)