Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g04 8/4 lok. 18
  • Nkombo ya Yehova na bisanga ya Pasifike

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nkombo ya Yehova na bisanga ya Pasifike
  • Lamuká!—2004
  • Masolo mosusu
  • Filipo—Mosakoli ya nsango malamu na molende
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Asakolaki “nsango malamu oyo etali Yesu”
    ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
  • Tómonisa elimo ya mobongisi-nzela
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Sololá ndenge bato basololaka
    Lingá bato—Kómisá bango bayekoli
Makambo mosusu
Lamuká!—2004
g04 8/4 lok. 18

Alobelaki lingomba na bango

Na liteya moko ya jeografi, basɛngaki Philip, elenge mobali moko ya mbula 15 oyo atángaka na eteyelo ya ntei, alobela ekipi moko ya masano, to parti moko ya politiki, to bato ya miziki to ya teatre, to lingomba moko ya engumba na bango Sydney, na Australie. Philip aponaki kolobela lisangá moko ya Batatoli ya Yehova, epai ye ná baboti na ye basambelaka. Basɛngaki bana-kelasi bátuna bato 20 ya etuluku oyo bakopona mpo báyebisa “makambo ya ntina oyo emonisaka etuluku yango.”

Nsima ya kosangisa makanisi nyonso oyo azwaki epai ya bato oyo atunaki, Philip akomaki boye: “Lisangá ya Batatoli ya Yehova [na engumba na biso] ezali lingomba oyo bato na yango bayanganaka libosoliboso mpo na koyekola Biblia. Na makita yango, batángaka mikapo ya Biblia mpe balimbolaka yango. Makita yango ezalaka mpe mpo na kolakisa biso ndenge malamu ya koteya bato mosusu Biblia. Mpo na koteya bato mosusu, bakendaka ndako na ndako mpo na kotala bato na bandako na bango, epai bakoki kofanda mpe kosolola malamu. Bato nyonso ya lisangá basalaka mosala yango mbala na mbala, na kotalela makoki ya moto na moto mpe makambo oyo asalaka na bomoi na ye. Longolá ndenge bayekolaka Biblia bango moko mpe bateyaka yango epai ya bato mosusu, bakabolaka mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ná Lamuká!, bazulunalo oyo eteyaka bato makambo mingi mpe elobelaka makambo oyo ezali kosalema mikolo oyo. Bazulunalo yango ezalaka na masolo ya kitoko oyo elobelaka biloko oyo Nzambe akelá, makambo ya kala, makambo oyo ezali koleka na mokili mpe na mboka moko. Tosalaka mpe makasi mpo na kosalisa bato oyo bakweli likama moko monene, na ndakisa oyo esalemaki na mokolo ya 11 Sɛtɛmbɛ; mpe tokabolaka mikanda oyo elobelaka masolo etali libala, bomoi ya libota, mpe bilenge.”

Lokola makambo nyonso oyo ye alobelaki mpe lolenge oyo asalaki lisolo na ye ezalaki mpenza malamu, Philip azwaki bapwɛ zomi likoló ya zomi mpo na lisolo na ye. Soki olingi koyeba malamu mosala ya Batatoli ya Yehova, sololá na bango ntango bakoya epai na yo to tindelá bango mokanda na adrɛsi moko kati na oyo ezali na lokasa 5.

[Elilingi na lokasa 18]

Philip

[Elilingi na lokasa 18]

Italie

[Elilingi na lokasa 18]

Australie

[Elilingi na lokasa 18]

Brésil

[Elilingi na lokasa 18]

Pays-Bas

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto